BOYEI BOLAMU 
        NA      LOKASA
                ya    "Lingala 
          Lokota-Bendele
     ya Ekolo Kongo🇨🇩 " 🫶🏾  

                                                     ✍🏽Molakisi Leobanem

KONGO  AKADEMIA 
EZALI NINI?
  ✍🏽Molakisi Leobanem

KONGO AKADEMIA ezali eteyelo ya koteya nkota to minoko ya ekolo Kongo.

Yango tobongisi naino na ebandeli koteya nkota oyo ezua esika ya nkota ya ekolo  bo ekomama na mobeko ya yambo.Ezali bongo lingala, kikongo , tshiluba na kiswahili.
Kasi toyebaka 'te o ekolo Kongo, nkota ezali kaka minei te kasi ata nkama minei lolenge baluki bapesa montango ! Na yango , se lolenge bino bokosepela , tokoyeba kobongisa  mpo na kozuela bino moteyi mpo na nkota bina.Tokosenge na baye basepeli na likanisi liye, bamikomisa   na lombangu mpo na bolandi mateya.

Topalangana te na eleko ya lelo tokoma kobungisa elobeli na biso mpe tokotisi maloba mingi mauta na nkota ya bampaya !! Likambo liye ekobungisa biso nkota na biso . Nzoka bampaya bazali tango inso kokoma pe koteya lokota na bango tango biso bayimboka tokufi se na komekola nkota ya bampaya .!!!

Tokobosana 'te lokota nde ekolakisa bonsomi ya bato ya  ekolo. Yango wana , tango bakotunaka  yo soko ozali moto ya wapi , bakobenga yo se na nkombo ya ekolo to mboka ya bankoko na yo .

Bongo yo moto olinga lifalansé to pe ngelesa , koleka  na lokota ya mboka ya bankoko na yo soko kutu oyebi yango , ozali lisusu penza moto ya mboka oyo  ofandi ?  Tee !

Soki  ekolo ezua bonsomi, biso pe bato ba ekolo totalisa bonsomi ena .  Yo okosepela ete mompaya aya koteya yo lisusu lokota ya mboka na yo penza? ! Tolongwa na mpongi !  Soki tolingi ekolo na biso , tosengeli kobatela nkita nyoso ! Mpo yango nde tokotikela bana ba biso na bankoko baye bakoya sima. Tosengeli kobatela kaka  mabanga ya ntalo te , kasi tii na nkota to  lolenge ya koloba eye bankoko ba biso batikela biso na lokumu nyoso. 

Tozali na misala mibale

1-Bopesi mateya na bana pe bakolo na nzela ya internet/Zoom

 2- Bobongoli makomi na lokota ya lingala.  Ekosalema na bayimboka babotama pe bakola na lingala.  .

-🔹Ntalo po na mwana oyo akozala kaka ye moko:  20€ /h  

🔹Ntalo po na  libota mobimba  : 25€ /h    

🔸ntalo ya bakolo: 26€/h -(liteya ekozua 1,5h)

🔸Ntalo ya liboke ya bakolo: 25€/h (liteya ekozua  1,5h)

♥️Likabo ekopesama ya bofuti kaka 25€ na moto oyo akokotisa moyekoli ya sika , libota to liboke ya bayekoli

♦️Ntalo ya bobongoli makomi:  ekolanda montango ya maloba.

☎️WTSP +33 7 69 23 26 12/ +243 9 78 44 97 26 

E-m: molakisileobanem@gmail.com/           abalawigide@gmail.com

Lolenge ya kozua mateya  

TOKOBATELA    LOKOTA   LINGALA  YAMBO  NA  BOTOSI  MIBEKO  MYA  LOKOTA 

BAYEMBELI  KONGO !

Mokeli akeli mokili kasi apesi  bato mosala ya kokengela pe kobongisa . Tobosana yango te mpo ata ndele  bakotuna biso oyo tosalaki awa na nse! Moto na moto abongisa!

KONGO NDE MBOKA 

🎵"Mikolo tosekanaki na mosolo  ya mboka Kongo ekoki/Tofungwani miso  lelo tomoni bozoba nyoso tosali/Mpo ya kobongisa Kongo avenir, ebongi tosala ebongi tosala,  moto nyoso ata mwana !" 

Tabu Ley

BATO YA KONGO

"Kobongisa mboka eponi moto te !"

 🎵Biso bana mike tosangani lelo tolobi mpo 'te tobongisa / Toluka lisanga ya bayaya na  biso bakolo bato ya conseil / Population ya Kongo, jeunesse nationale ,basengi lelo mpo babongisa /Kobongisa Kongo ezali nguya ya population bakonzi bayoka na matoyi ! ...Kobongisa mboka eponi moto te ! Oyo mboka kitoko! Kongo! Mwana kongo , yoka lelo :  Bongisa mboka !!! (african jazz)

 

Congo(loyembo ya kimya)

 🎶Kongo ekolo na biso tobongisa yango Kongo ! 

Kongo ekolo monene tobosana te Kongo ! 

Tolingana ee toyokana ee tosalisana malamu bongo tobongisa Kongo

Jacques Loubelo

BASANGO YA MBOKA

BASANGO NA BOKUSE

Tokopesa bino bansango ya bituke ya ekolo mpe maye ya molongo

KIVU YA  NGELE  : SANGO YA LIWA YA MOPANZI SANGO Dieudonné MALEKERA

O mokolo mwa zomi na mibale ya sanza ya minei  ya mobu eye  ya 2025, tozuaki sango ya liwa ya mopanzi sango Dieudonné Malekera  na  mboka Kampala. Ndeko eye atiki bongo libungutulu monene kati ya bapanzi sango ya Kivu ya ngele. Ye azalaki moto ya boboto, mpiko na mosala. Asalaki misala o bisika ebele lokola na Syfia Grands Lacs mpe na Radio  Maendeleo . Ayaki pe kosukisa na lokasa "Le Souverain Libre". Akomaki penza ndakisa monene kati ya mosala na ye.  Etumba na ye ya tango inso ezalaki  ya semba pe bonsolo , alingaki lokuta   soki moke te. Na mosala monene ye atiki, ezali bongo ndakisa mpo na baye  banso balingaka basango mapesami na lolenge ya malamu na litomba na yango. Tokokabola mawa na libota lya ye pe na lisanga ya bapanzi sango banso . Nkondo Dieudonné Malekera azua bongo bopemi ya kimya epai ya Nkolo pe makomi ma ye matikala seko mwinda mpo na kotalisa nzela na bilenge na balandi ba bango. 

(ekomamaki na Eugide Abalawi pe ebongolami na lingala )

✍🏽Molakisi Leobanem

MOYANGELI   KOMINE  YA KADUTU/Bukavu:  Etamboli ya sika na bayimboka  

Eleki kala mingi te   Byamungo Kazimir azuaki ebonga ya kokamba  komine  ya Kadutu kati ya Bukavu. Yango ayaki mokolo  mwa  mosala  mibale eye toleki ,  elongo na mosungi na ye Bulikoliko René,  kolimbola  na bayimboka etamboli ya sika  lolenge AFC/M23  azali kopesa mitindo . 

Esengeli bongo  na bayimboka  ete babongola makanisi, batika bizaleli ya kala. Alobaki mpo na AFC/M23 ete bayei mpo na  kolongola etamboli ya mabe ya koyangela   ekolo oyo ekosalema na bokambi  na Félix Tshilombo. . 

Alobelaki mingi  ntina  ya kokela na balabala moko na moko oyo ebengami Brigade ya bilenge  baye bakotambola mpo na bokengeli pe kotia kimya . Ya mibale akosenga bilenge bapesa maboko na bakonzi ya quarttier  na baye ya balabala mpo na kolongola  bosoto.Pe lisusu bandako matongami engebene na mibeko ya botongi te esengeli ezala te  , ba zando ya baye bazanga ndingisa ya  bosukoli mituka na balabala ya Leta yango   pe  esengeli esila . 

Na yango akeli  bisika mibale. Moko   na lopango ya SNCC  : mosala kokonza bateki banso baye bazalaki koteka na balabala RN2  uta esika ebengami  Place de l'Indépendance tii na esika basalaka masanga . Pe ya mibale atie site yango na balabala Rukumbuka  sima ya ndako ya komine nyoso  mpo na kosilisa likambo ya bateki baye bazanga mikanda ya mosala ya koteka   o kati ya komine na ye.

Mpo na kosukisa , akebisaki bongo bayimboka baye bazali kotia mobulu ezala na kotikala kosangana na banguna ya kimya na mpe baye ya wazalendo baye bakolongola  kimya ya bayimboka 

   ✍🏽 LBN

MALOBA YA NSOMI
TOSOSOLA BONSOMI YA EKOLO KONGO

 

Mboka ya KONGO ekoti na  mobulu makasi na eleko eye. . 
Kasi tokomona mingi bazali naino kozua yango lokola bitumba ya bana mike mpe bazali kofinga , koseka too kotiola bandeko Balingi bato basusu balobela likambo ya ekolo te , kaka bango moko mpe batosa oyo bango balingi! Nzoka ezali mboka oyo esangisi biso banso !!! 
Kati ya libota, tata to moboti oyo akokabola bana azali moboti mabe !! 
Nzoka kati ya likambo ya Kongo ebandi lelo te , nde ezali etumba ya banzoku ya mikili ya Eropa na Amerika bakisa na Azia!! 
Bango nde oyo bazali na mposa ya kozua mabanga ya ntalo(minerais stratégiques) mpo na misala na bango ya bibuneli ya nsomo. Pe lisusu mpo na kosala batterie ya lotiliki ya mituka na misala misusu bongo na bongo. Yango bokomona Ue na Usa bakomi kowelela koluka kozala na ngambo ya bakambi ya Kinshasa na pe oyo ya AFC/M23.
Na kati wana bayimboka bakozua eloko ata moko te! Ata ekolo kuna na Walikale etonda mabanga ya ntalo , kasi tala bayimboka lolenge bazali na bobola !! 
Oyo nyoso kaka mpo esaleli ya bakambi ekolo oyo ya bambula oyo tokomi lelo , lolenge tozali komona, bakomisa nkita ya ekolo lokola bilanga ya bango moko na mabota na bango!!
Omona wapi moto moko aleka Leta to ekolo na ye na bozui ? Nzoka soki ekolo te mbele pe moto wana azali na bomengo wana te !! Mobeko oyo ya kokonza likambo ya mabele , oyo babengaka na lifalansé "LOI BAKAJIKA" ezali lelo wapi? 
Ndenge nini ekolo ya makoki ebele lokola Kongo ekoki kozanga misolo to makoki ya koluka pe kotimola mabanga ya ntalo mpo etombola nkita ya ekolo pe epesa bomengo na bayimboka? 
Topalangana te ! totika kosala maseki na makambo ya ekolo. Noki te lob tokozala kaka sima ya baye bayaka nzela moko na biso na mokili !!! Likambo na likambo na tango na tango! Nani ayaki kotika moto na mokili oyo to libota moko lokola soki ozali bawumbu te ? Tokeba kobungisa bonsomi na biso oyo tolukaki na lipanda! 
Tososola .

✍🏽Molakisi Leobanem

SOSO ALIAKA OYO EKOKI NA  MONOKO NA YE KASI TAXI TE MPO  NA NINI ?  

Oyo tokomona esalemi na Congo Brazza pe ndenge mpko na bisika nyoso ya afrika ya kati. . Motuka  ekufi na  nzela mpo mokumbi taxi alekisaki biloko ya kokumba na motuka. Ye wana alali na nse akozela soki bakoya kosunga ye. Ezali bozoba too mayele? Ngonga oyo akolelkisa na kozelaka akokaki kosala pe ata komema bato basusu. Na bokumbi biloko to bato ya koleka likama pe ekoki kokweya .   

#OYO YA KOKAMWISA 

Mbula monene  enokaki na mposo oyo eleki. Mpe tozui sango ya bawei ata montango 45 na likama eye ya mpela  . Yango esalemi boye mpo nini?  Nzoka baluki ya meteo to balandeli bileko na bambula , basilaki kokebisa  na mbela babwakaki mpo na sanza eye ya minei. Lokola mboka mobimba misala ya kolongola bosoto na nzela bakela mpo na mayi esalemaka mabe to te, yango banzela wana nyoso etonda to ezipama , . Awa mayi ya mbula oyo etondisaki miluka  ezangi esika ya koleka ,emati makasi mpe ebimi tii na balabala , ekoti na mapango ebuki bifelo ya bandako ebele na bokasi nyoso ,soki pe ememi bato basusu te.  Mpe mingi bakufi tango ndako na bango ebukanaki. Mpe suki wana te , talaka lolenge nzela monene oyo ya mituka eutaka na KOngo central tii Kinshasa  ekatani .   Mituka miye miyaka  na biloko ekoleka wapi ?   KInshasa ezali engumba moko oyo bilei mingi ezali kaka kouta na bituka.  Mpe etuka ya pene nde Kongo Central.  Leta akozua  mbeko ya libela tango nini?   . Kaka lokola soki bazangi makoki to makanisi. 

Uta bakambi ya eleko eye bazuaki bokonzi tii mbala mibale na maonomi na bango ,tomoni lolenge makelele ya lolenge nyoso makelami likolo ya mbongo oyo bakoyibaka na Leta mpe na nkita ya mabanga ya ntalo.Mboka mobimba ekomi mlbutu mbutu !Bato bakokangema pamba pamba, bosambi ya malamu ezali te, koboma pe koyiba bipayi binso ! wana elakisi nini? 

Lelo oyo mingi ya libota ya mokambi  ya ekolo  bakomi  na misolo ebele ebele likolo ya bozui mabele ya mabanga ya ntalo  ya koloba te!  Nzoka ekolo esika bakofanda mpe bakotimola  nkita ena   ezali kokufa kaka. Bango bakosala mibembo  tango nyoso na bampepo ,bakokendeke na Dubaï soki te Qatar to miklilio ya Amerika , Canada na Eropa  , kasi bomengo ya ekolo batii yango wapi soki na bikolo ya bampaya wana te?!

Kokamwa mpe mawa ! Tokolisa bolingo ya ekolo. Ezala kaka na maloba te , kasi mpe na misala eye ekotombola lokumu ya ekolo mpe kobongisa efandeli ya bayimboka.Moyi ebimaka mpo na moto nyoso.Tozali lisusu na elekeo ya baumbu te . Tolongola bobangi mpe tobunda etumba bo mobeko art64 ya Mobeko likonzi ekosenga biso !  Mwana mboka moko azali moumbu te  Tososola !  

KONGO BOYANGELI YA BITUKA  TO FEDERALISME EZALI  MABE TO MALAMU ?   
✍🏽Molakisi Leobanem

MAYE MAKOSENGA MBONGWANA

Na eleko eye  tozali , ekolo Kongo ezali penza  kati ya nungunungu makasi .  Na eteni ya monyele  bitumba bikosila te . Kivu yango wana ekoti na mbongwana ya AFC/M23.   Baye bazali kokamba uta Kinshasa bakotisaki  koyinana, mafinga , kimoyibi  ya nkita uta likolo tii na nse . Elakisi penza 'te mboka ezali kokambama na bosembo te . Bituka bakoma lokola bana bitike ! Nzela ezali te , ezala ata na nzela ya mayi , mpasi na mpasi lokola masuwa penza ezali te kaka bibeyi to baleinière oyo ekokoka kozua bato ebele te mpe mingi bakozua makama ya liwa na mayi. Bakelasi mpo na bana bikozanga  bifandeli, bikomeli , nyoso ! Tango balobi bafuta te etomboli montango ya bana na kelasi mpe molakisi  akokoka lisusu koteya malamu te .  Balakisi bakofutama  na lolenge bonsomi ya mosala ena ekosenga te, bakoma babola ! Nkisi ya kosalisa bato ekozanga lolenge moko na balopitalo yango moko.   Mosolo ya ekolo ezali na motuya te , biloko ntalo .Yango bato batika kondimela mosolo ya ekolo . Bakoma kosalela dollar ya Amerika koleka na mosolo penza ya ekolo! Suka na yango tokomona se  bisika ya kokunda bato ekoma ebele mpo liwa ekoti mingi na mboka. Mboka mobimba bosembo esila .  

 

MISALA MABE 

Yango tokomi koyoka mingi mingi bato bakomi komilobela 'te esengeli ekolo ekota na esaleli ya fédéralisme  to boyangeli ya bituka lolenge tolimboli . Yango ezali mpo uta tozua lipanda mboka ekambamaki kaka na baye ya Kinshasa  mpe ezala mibeko to mbano nyoso ekoma kaka kozela Kinshasa  eloba . Bango nde bakonzi mpe bituka nde mingamba ! Nzoka bango basundola bituka uta kaka ekolo ezuaki lipanda! Yango bituka   ekoma zamba na zamba , ekauka  na bato!   Mokano  nyoso ata mpo na misala etali bituka ekoutaka kaka na Kinshasa !  Nzoka na Kinshasa sembo ezali soki moke te na oyo etali misolo. Touti koloba yango awa.   Nyoso oyo ekotisi likanisi 'te mpo ozala malamu , esengeli kaka ofanda na KInshasa.  Mpo ata kofuta basali ya Leta na bituka , bazelaka  misolo miuta na Kinshasa.Tango mosusu ekokoma penza sima ya mikolo   , too  tango mosusu pe ekobenda mindondo na  makama ya ndenge nyoso , moyibi pe epai .    

BAYE BAKOSALELA BOYANGELI YA BITUKA 

Kasi mpo na kofandisa makanisi malamu,  tokopesa bino naino lisolo ya molongo na mpo oyo ebengami boyangeli  ya bituka . Bokambemi ya bituka  ya yambo na molongo ekelamaki na mobu 1789 o mokili ya Amerika. Tii na lelo ezali oyo eleki na  bonene mpe boumeli.  Ekolo Suisse mpe ebongisaki ya bango na mobu 1848. Canada na mobu 1867. Bikolo misato bina bizali tii na lelo mpe  kotambola na semba nyoso.  O bisika misusu bamekaki kotia yango lokola na Amerika ya ngele pe na Germany  ebongaki te .  Kaka na bonkama ntuku mibale mpe na suka nde mboka misusu bayaki kolanda lokola Australia. Suka suka tozali lelo na mboka ntuku mibale na minei bakosalela boyangeli ena. Mwa lolenge esusu ya kosala yango ekomi pe kobima epai na epai lokola oyo ya UE oyo esangisi bikolo na lingomba  UE ,  bazali elongo na Eropa pe bikolo bya bango bikomi  se lokola bituka!  

 

BOLAMU YA BOYANGELI YA BITUKA 

Soki totali malamu oyo esalema epai esusu elongo na baluki tokomono 'te  bayangeli ya bituka bakosala mosala malamu koleka  . Yango ekouta na ntina ebele . Moko na yango ezali  mpo lokola etuka na etuka ekoluka kotalisa 'te bakosala mosala malamu  na ekolo, yango ekopekisa nzela na misala ya mabe.  Moto nyoso  akoluka elonga ya etuka na ye mpe misolo mikotikala kati ya etuka mpo na misala oyo banso bakomona . Ntina ya kozela oyo akouta kuna aloba te. Bato na bato bazali na oyo ya bango balobeli lolenge baponoki bango. Banso bakomikengele . Mpe soki mosala ekoleka malamu te mbeba ekomonana na lombangu. Mpe baye baponomaki bakosangana na lombangu mpo na kozua mbano noki. Mpo moto moko te akolinga kozala sima ya baninga.  Na boye lifuti pe ya bato ekomata . Moto ya komilela akozala penza te . Ata mwa bozangi ezali ekozala makasi te ! Esaleli oyo etomboli oyo ebengami bokonzi ya bayimboka  to demokratia mpo bazali na makoki ya kolandela misala  ya etuka na bango malamu .  Bakoki  kozua mbano noki  engebene na mitindo oyo bango moko baponaki.Awa bayimboka bakokolisa bomoko kati na bango mpo bazali kondimela mosala ya moko na moko. 

 

MIKAKATANO OYO ESENGELI LIBOSO KOLONGA 

Kasi boyangeli oyo ya bituka ,ezali mpo na bikolo binso te kaka bongo te.  Mpo ekosenga 'te mwa mabongiseli mazala mpo na elonga . Mpo na ekolo Kongo soki totali tokomono 'te baye bakabolaki bituka basalaki yango na likanisi ya 'te etuka na etuka esala mosala yango moko te .Mpe lisusu ata bongo bazali kotosa  mibeko te . Bituka bikomi lokola bilanga na bango po bakende kosakana sima  na Kinshasa to na mikili ya bampaya . Wana  babimisi misolo ya bituka ,  batiki yango  kaka pamba .  Tolobi lolnge bakaboli bituka ekoma ntuku motoba , basali yango na likanisi ya ba politiki. Oyo esali 'te bituka nyoso basengeli kozua  lisungi ya baninga misusu mpo bazali na nyoso te.Nzoka bazali naino na bomoko te ! Bakosungana lolenge kani? 

 

BOMOKO NA SEMBO LIBOSO 

Yango esaleli oyo ekotambola kaka soki boyokani ezali kati na bango mpe sembo ezali. Mpo okoki kodefisa kaka oyo akozongisela yo na ndaka oyo epesamaki. Nzoka lokola kanyaka ekotela bato na ekolo mobimba ,  botosi ya  ndaka bakopesana ekosenga naino mbongwana ya  bato. Bato banso balinga kotosa mibeko oyo bakozua na etuka , kanyaka ezala te . Basengeli  mpe kondima moto na mosala kaka oyo akoki na yango. Ezala  mpo azali ndeko na yo ya libota to moninga na yo te . Kasi mpo ayebi mosala , to alongaki na momekano bopesaki na  bato nyoso . Wana  sembo ekozala pe ekotalisa 'te moto oyo bozui  azali na makoki ya kosala mosala oyo bokopesa ye . Lifuti pe esengeli efutama malamu engebene na mosala  na bonsomi nyoso. Mibeko esengeli ezuama po na kotia lifuti ya bato na etando yoko po toyeba tokobanda wapi pe tokoki kosuka wapi. 

 MOTO NYOSO AZALI LETA 

Nkolo kompani nyoso asengeli kofuta mpako na ye  na  eleko  na yango.Bayimboka kati ya bituka basengeli kondima  koboya  oyo nyoso ekopekisa etuka na bango  ekende liboso. Esengeli penza bato bamona Leta lokola eloko moko ya bango, ete  ezali mosika te, kasi ebandi nde esika nyoso yo ozali. Tango yo moko ozali komikengela ,osala mabe te,  okomi bongo pe Leta!  Ntina lisusu moto moko azala sima kokengela yo te ! 

Lisusu pe ekosenga kozala motema monene pe koyeba kosimba  baye bazali na bolembu mpo na kosunga batombwana . Esaleli eye ekolongola molimo ya koswana pe zuwa ya mabe  tango nyoso oyo ekoma komonana kati ya bapolitiki na Kongo.  

 

MPO NA BOSUKISI

Na nyoso oyo tolobi tosengeli pe koyeba 'te lokola bato bandimi boyangeli wana , ekotikala kaka bongo libela te . Kasi esengeli  bayeba kolanda mbongwana ya mokili pe ya bato . Baye ya sika bakoya kaka na makambo misusu oyo ezalaka te na bileko ya liboso.  Ezali kaka bongo  . Soki bandimi mbongwana na tango oyo esengeli,  wana nde bakoumela   kati na bango na lisanga . Ekolo na ekolo ezali na lolenge na yango. Kasi kobongisa mosala ezali kosenga kolongola oyo ya mabe mpo ya sika ezua esika. Koboya  mbongwana  ezali kokota na kotingama na maye malongaki te . Mpo makambo ya mabe ezalaka kaka mabe  ata ebimi maseke to suki ya pembe !. Soki bilei biziki na nzungu ezongaka lisusu malamu te ata osali boni . Bokobwaka yango kaka.  Ekolo na bituka na yango  ezali kaka lokola nzete . Ekoki kolonga te soki  etape na etape elingi kotengama na lolenge na yango .Kasi oyo akoningana tango bozali liboke ,  asengeli koyeba 'te baninga pe bazali ! Boboto pe efandeli ya bomoko yango wana !  Bomoko  oyo esengeli ezala kati ya bituka nyoso mpo misala minso mitosa  mibeko oyo mipesamaki mpo na banso. Ndakisa  mibeko oyo etali mampinga tango bitumba bikoteli ekolo.Soki tolingi ekolo na biso tokozua tango na mayele ya kosala kaka oyo ekoki kosala 'te elonga ezala solo .     

Contactez-nous

Téléphone: +33 7 69 23 26 12

E-mail: groupedepresselessentiel@gmail.com 

Adresse : 20,avenue Paul Valery,Sarcelles 95200

Ce champ est obligatoire

J'accepte que ces données soient stockées et traitées dans le but d'établir un contact. Je suis conscient que je peux révoquer mon consentement à tout moment.*

Ce champ est obligatoire

* Indique les champs obligatoires
Une erreur s'est produite lors de l'envoi de votre message. Veuillez réessayer.
Merci ! Nous vous recontacterons dès que possible.

Tagline

EKOLO    KONGO 🇨🇩

BATO YA KONGO  

Tagline

BITUKA NTUKU MIBALE NA MOTOBA YA KONGO

TOKOLISA BOYEBI YA EKOLO

*Masese: Matoyi 
malekaka moto te !

**MASESE : -Kokende liboso ezali kokoma te ! 
-Mbwa ezali na makolo minei kasi elandaka se nzela moko
 

Baengumba

ELAMBELI   YA  BAYIKONGO 

MALAKO MPO NA BILEI

Mpo na kobatela bokolongonu na biso tosengeli koyeba kolia bilei ya malamu tango nyoso

Mpo nzoto ezuaka matongi na yango se na oyo tokoliaka. Toyeba sik'oyo kososola malamu. Awa bato mingi bakoma se kosepela kolia misuni to nyama , tobosani 'te bilei ya liboso bipesamaka na moto nde milona , ndunda , nkasa , mbala, na mbuma ya nzete?   

 

TOKOLIA

NINI?

 

 

Tokokabola na

 bino awa

 ba sekele ya

 kolamba .

.Botindelaka pe

 biso  basekele  

  na bino !

 

 

 

 

 

 

 

Mbika ya kotumba

Bolanda elambeli oyo na  bilili!

Makayabu ya kokalinga 

Bolanda bilili

Pondu na mbinzo

Bolanda bilili

TOKOLIA NINI : (1) ELUBU YA MPONDU (nkasa ya nsongo -feuille de manioc )

🟢 Elambeli ya  mpondu lolenge ya mboka Kongo🇨🇩:

1°/- ya yambo : kolembisa mpondu

Mpo na kolamba mpondu tokosala boye.

Nakosukola mpondu  oyo  nasombaki mpo na kolongola bosoto nyoso.

Na sima nakotokisa yango tii soki elembi naluboli yango pe nakotia na eboka mpo na kotuta elemba penza.

2°/- ya ibale: kotia bikelakela ya kopesa lompimbo mpe kolembisa mpondu

-Wana nakotiaka pe bikela ya lompimbo lokola matungulu, pilipili  , nsolo, pe misusu.

Soki nasilisi kotuta mpondu,

/-ya isâto -Kolamba na nzungu :

nakotia pondu  kati ya nzungu po na kolamba .

Nakotika boye etoka penza tii nsolo ya mobesu elongwa.

Sima nakoki kobakisa   , ata mbisi to nyama ,  soko nalingi,

4°/ ya inei: kotia  mungwa: Sika nakoki kotia  mpe mungwa o kati ya nzungu po ebela esika moko na pondu.

Soki namoni ‘te ekomi kobimisa nsolo ya kobela, wana nakosopa mafuta ya mbila likolo ya pondu po epesa yango supu ya kitoko.

Awa nakolembisa moto ezala ya makasi lisusu te, Nakofandisa nzungu ya mpondu na moto tiii sima ya mwa ntango nde nakomono ‘te ebeli ,

4-  mpondu ebeli , ekoki koliama :  wana nakolubola yango po na kolia na loso oyo elambemaki pembeni to mpe na kwanga  to fufu.

Tala lolenge bakolambaka  mpondu na mboka Kongo  !

 

🔴NDIMBOLA YA MALOBA:

-ya yambo= 1°=primo, premièrement

-elambeli (nom commun) = dérivé du  vb kolamba (cuisiner) —elambeli= la manière de cuisiner =lolenge ya Kolamba

-lolenge =   la manière de , la façon de faire quelque chose

-vb kosukola= laver, nettoyer —nakosukola= je laverai (futur simple)

-vb kolèmbisa= dérivé du - vb Kolemba (=être fatigué,

NB:  vb +isa=  -isa: ajoute la notion d’une action faite  sur le verbe concerné , d’où : kolembisa= faire fatiguer = ramollir, rendre tendre

Ex-kotálà=regarder; kotalisa= indiquer, faire voir, montrer / kobeta= frapper; kobetisa= faire frapper  une personne par quelqu’un d’autre que soi

-vb kosómbà - nasombaki (passé proche)= j’ai acheté

-bøsøtø (nom commun) =  la saleté

lompímbó (nom commun) = la saveur

mpimbo  (adjectif qual.)= pur, agréable arôme

-nzungu = casserole (nzungu ya monene= marmite), nzungu ya moke =petite casserole, de taille normale

-nsolo ya mobésu= odeur de ce qui n’est pas cuit

-nsolo ya kobélà= odeur de ce qui est cuit

vb -kosopa= verser , répandre

-mafúta ya mbila= huile de palme

vb kofandisa=vb kofanda +isa= poser ,

vb-kofandisa na moto = garder encore un moment sur le feu

vb-kolubola= retirer un plat du feu quand c’est cuit

pembeni = à côté , proche

 

 "Vegan" to bilei ya milona, nyama te !...   na elambeli ya  Phoebe Dunn ,Cheffe  na 
Embuscade Pigalle
(Paris 9è)🍎

Tozali lelo kolobela bilei oyo bankoko na biso bazalaka kolia kala pe mingi kati ya bingumba bakoma kobosana. Ezali bilei ya ndunda , milona mpe mbuma. Mpo na batangi ya Biblia bayebi 'te yango nde bilei ya yambo Nzambe apesaka na moto.   Kasi lelo , likolo ya kolia misuni bato mingi bakoma kobela pamba pamba mpe makono  masusu makoma kozua bango.Suka suka :bomoyi bokuse!

Baluki  ya lelo  bamoni 'te baye baliaka kaka  milona nde bazali na nzoto kolongono koleka baye baliaka misuni pe bakoumela na mokili. Elingi koloba nini?  

Awa tozueli bino mama Cheffe Phoebe Dunn . Ye akolobela biso mozindo ya likambo lina . Azali kosala bongo   na esika moko  ya kolia na nkombo  "Embuscade Pigalle" na Paris 9è  elongo   na moninga na ye . 

Contactez-nous

Téléphone+33 769232612

E-mail: groupedepresselessentiel@gmail.com

Adresse : 20, av Paul Valery , Sarcelles 95200

Ce champ est obligatoire

J'accepte que ces données soient stockées et traitées dans le but d'établir un contact. Je suis conscient que je peux révoquer mon consentement à tout moment.*

Ce champ est obligatoire

* Indique les champs obligatoires
Une erreur s'est produite lors de l'envoi de votre message. Veuillez réessayer.
Merci ! Nous vous recontacterons dès que possible.

MASOLO  YA MBOKA KONGO

BOYEBI YA  EKOLO BOKOKOLISA BOLINGO  YA EKOLO NA BISO

Tokotalisa bino na etape eye mozindo ya maye bosengeli koyeba mpo na bisika to maye matika sango o ekolo na biso

LISOLO YA EKOLO

 LIBANDA YA MASANO
 YA NDEMBO YA KINSHASA 
   (Stadium des Martyrs )
  ✍🏽Molakisi Leobanem

Llibanda ya masano ( Stadium des Martyrs )   oyo toyebi lelo ‘te  ezali esika ya masano ya ndembo  to ya makutano ndenge na ndenge ya miziki , politiki to mpe misusu bongo na bongo.  Esika yango ezali kati  ya komine ya Lingwala . Ekoteli na yango etali balabala Les Huileries na balabala Triomphales na loboko ya mwasi.  Na mokongo na yango nde loboko ya mobali oyo  ezali na ngambo ya  balabala Kasavubu mpe na loboko ya mwasi ekabwani na mayi ya bitsakutsaku ya balabala Dima .

Esika ena , na eleko ya babelesi, na Congo-belge, liboso ya lipanda , ezalaki esika misala ya kotanga bato ya mboka ezalaki kosalema. Moyindo nyoso soki akomi na Kinshasa asengelaki aleka kuna akomisa nkombo mpo bamopesa mokanda babengaki buku ya mpako . Na yango misala babengi « Idenditification" na lifalansé  to kotanga mpe kososola bato mizalaki kosalema kuna. .

Lokola ezalaki kati ya esika bayindo bafandaki ,oyo babelesi babengaki  yango « La Cité indigène »,to na bokuse "la Cité" , lolenge bayimboka bazalaki kobenga yango. Ezali solo  na kokeseni makasi na esika mindele bafandaki , oyo ebengamaki  Kalina mpe ekoma  Gombe. Gombe nde   babengaki yango «centre  ville », to "ville ". Kuna okokuta tii lelo  zando ya monene na  mpe ba magazini minene ya mimbongo ya mindele . Soki yango ebengamaki mingi na bokuse na nkombo ya « La Cité », elingi koloba mboka ya bayindo. Kuna mpe ezalaki na ndako ya lokumu na kati mabaya matiamaki mpo na kobongisa eyokemeli ya mingongo ya miziki yango eyebanaki na nkombo ya « Conservatoire » ya miziki. Ezali esika mindele bazalaki kokende koyoka miziki   ya bango ya kotombola molimo  oyo ebengamaka "musique classique".

Na balabala monene liboso wana ezalaki na nkombo ya prince Baudouin . Balabala oyo ezali moko ya balabala ya yambo oyo basopaki   goudron na kati ya Kinshasa elongo na balabala Joséphine Charlotte oyo ekoma avenue du 24 novembre. . Na eleko ya  sima,  tango ya Mobutu , bapesaki nkombo Kasavubu na balabala ena mpo na kopesa lokumu na moyangeli ekolo Kongo ya yambo.. Yango ebengeli ya « prince » mpo na kolobela balabala ya monene oyo ezali na goudron esika mituka milekaka etikala na bayimboka, koleka penza baye bakoto kelasi te.

Mpe tokobombelaa lisusu ‘te esika wana ezalaka mpe na makambo mibale matika nsango. Ezali gbagba kombo Cabu oyo ekoma Kasavubu mpe na etelemeli ya ba gyrobus  oyo ezalaki  mituka ya lotiliki ya bokumbi bato uta esika mindele bazalaki kofanda too  "ville" oyo ekoma komine ya Gombe   tii na Cité.  Boye tokoki kozongela  libanda  ya masano oyo toyebi lelo na nkombo Stade to Stadium des Martyrs de la Pentecôte. Lisolo na yango ezali nini?      

-Etongamaki na lisungi ya ekolo  Chine (14 oct 1988-14 oct 1993 ntalo 38 millione, efungwamaki  mokolo mwa 14 sept 1994 . Lisano ya ndembo  monene ezuamaki kati ya ba Léopards ya Zaïre na babeti ndembo ya Malawi. Na monene na yango , esika ena ezali ya isato kati ya Afrika sima ya "FNB Stadium" ya Soweto na Afrika ya ngele  na Stade Borg Al Arab ya Ezipeti.

Botongi yango esalemaki na likanisi ya Maréchal Mobutu mpo na kokitana na Stade Tata  Raphael oyo ekomaki kala mpe moke mpo na makutano ya ba politiki bo ameseneki kosala.    Bapesaki yango  nkombo ya Stade Kamanyola mpo na kokanisa bitumba ya elonga oyo bilekaki na mboka Kamanyola kati ya mampinga Faz na batomboki .

Tango Kabila Laurent Désiré azui bokonzi na AFDL ( o mwa 17 mai 1997  nde bakopesa nkombo ya Stade des Martyrs mpo na kokundola likanisi ya baye babomaka bango na esika ena  oyo bababengaka sima Ba Martyrs ya Pentecôte mpo  mbeba  bafundaki bango ya  bomeki kobotolo  na makasi ngenda ya bokonzi ya ekolo na Mokalbi ekolo ya ntango wana Joseph Désiré  Mobutu.

Bazalaki banei: Evariste  Kimba  (Moyangeli wa yambo ya kala  tii sanza ya zomi na moko ya mobu   1965); Jérôme Anany (moyangeli  ya kala ya bobateli mabele ya ekolo to Défense tango ya Adoula),  Emmanuel Bamba sénateur mpe mokambi ya lokumu ya lingomba ya Eyamba Kimbanguiste mpe Alexandre  Mahamba (moyangeli  ya mabele to affaires foncières tango ya Adoula).  Babomaki bango na singa na kingo mokolo mwa 1 juin 1966  o libanda ena  . Mokili  ezalaki oyo ebengamaki bitumba ya nkuku kati ya liboke oyo etingamaki na ekolo ya Amerika  mpemisusu na Urss .Wana Kongo ezalaki naino kati ya bitumba ya batomboki ya Mulele Pierre .

Lelo oyo tokoki se koloba 'te ,,ya solo batongela bana mboka esika monene  ya masano ya ndembo kati ya engumba Kinshasa. Mpe tii na lelo ezali kaka kosunga  bango mpo na makutano ya ndenge na ndenge . Mpo 'te etikala mikolo ebele , moyangeli ya masano esengeli mpe atia kuna baye bayebi mosala ya kokotisa mbongo na libenga ya Leta kasi bazala bayibi te. Wana nde tokobatela nkita na biso malamu bo basusu na mboka bampaya. Totala kaka lolenge na Italia bakobatelaka esika ebengami Colliseum , esika bitumba bizalaka kati ya babuni na tango mosusu ata banyama,  se mpo na kosepelisa bato na bango ya eleko  oyo wana ya bokonzi ya Roma.Kuna bazalaka kolanda mbeko oyo: "pesa masano na bilei na bayimboka po osala poliki na yo na kimya !" 

   

MOKANDA YA P.E.LUMUMBA 

Nkondo Patrice Emery Lumumba (Lomomba)  elombe ya bantoma   mpo na bonsomi ya ekolo Kongo (2/07/1925-17/01/1961)

Lisolo ya loyembo Indépendance cha cha   (loyembo ya bonsomi)

Lisolo ya loyembo oyo  ekoma loyembo ya mboka mingi na Afrika ya bayindo tango bakozua lipanda to bonsomi bwa bango , ezali  boye :maloba ya  loyembo ya liboso  makomamaki na Thomas Kanza wana ye azali kuna na Belgique mpo na Table Ronde ya Bruxelles (1960:20/01-20/02 + 26/04-16/05/1960) . Esangisaki bayipolitiki na bankumu ya Kongo na masolo na bakambi ya Leta ya ba belesi lisanga na bayi nkita na misolo na bango .  

 Yango  lokola ekozala kaka masolo makasi kuna, bopemi penza ezali te, ye azuaki likanisi ya kobengisa pe lingomba ya miziki ekende kuna na mboka Bruxelles o "Table Ronde"ena. 

Toyebaka  'te  ntina ya bokutani ezalaki mpo na boluki nzela ya kosilisa matata makomaki makasi o ekolo Congo-belesi ya  tango wana.   Ndakisa mobulu ya 4 janvier 1959 oyo bapolisi babetaki masasi po na kopanza bato ya Abako oyo  balandi lisano ya ndembo bautaki na libanda ya masano Tata Raphaël sima ya  lisano ya ndembo ya  Mikado na V.Club. 

 Masasi ebomaki bato ebele ata minkama . Bato batombukaki pe bakendeki kobuka ba magazini , kobuka , kotumba bisika ebele na Kinshasa oyo ezalaki naino Leopoldville . Talaka penza ntina ya Table Ronde oyo bayimboka  bazalaki lisusu kondimela liyangeli ya ba belesi te.   

  Yango Thoma Kanza lokola ayebaki 'te masolo makozala makasi pe ya koumela ,yango asalelaki likanisi ya  kobengisa mpe  lingomba African Jazz po ekende kobeta miziki ya kokitisa mitema tango ya bopemi ya bayi politiki ya Kongo  bazalaki kuna. 

Ye apesaki kaka maloba na lolenge ya makanisi  na ye pe loyembo ebongisamaki na balanga nzembo bango moko kati ya lingomba African Jazz lokola moyembi monene Kalle  na moninga na ye mobeti nzenze (guitare)  monene Nico na basusu banso . Mbuma na yango loyembo oyo tolembaka te na koyoka "indépendance cha cha" .    

MASAPO MA BISO

Masapo mazali liboke ya bwanya na mokili!

Na bileko bya kala, tango naino bakeli tv to internet te,  bana  bazalaki  kopesana masapo na mpokwa. Yango nde ezalaki eteyelo monene mpo na koyeba kotambola na mokili. Tokokabola  masapo na lokasa na biso oyo . Bolanda pe botindela biso pe ya bino po tokabola yango.-Matondi na bino banso!🫶🏾

LISAPO

KOTAMBOLA BO NTABA TE
(na mokili ya nguma)
✍🏽Molakisi Leobanem

Na mboka na biso,bakulutu bazalaká mpokwa nyoso kopesa masapo na bilenge.Wana naino basali bitaleli ya etando eke te ( tv) to bitaleli ya ba sateliti te(Internet) . .Ata ko babuku ya kotanga ezalaki ,kasi masapo wana mazalaki na elengi moko   koleka na oyo tozalaki kotanga.Ezalaki mpo na biso koleka na masano ya théâtre oyo tokoma komona.Moto moko azali nkolo masapo te. Yango esali 'te soki oyoki lisapo ya kitoko okobomba yango malamu mpe kutu okolamba yango lisusu malamu penza po yo pe okabela baninga.Masapo mana mazali kaka masolo te kasi matondi na bwanya mpe mayele ya mokili .Lelo nakokaba lisapo moko

eteni ya liboso

LÌSÀPÒ Ó NGÈ!!

-o nge !

  Tolanda!

Ntaba moko azalaki koyengayenga na boluki matiti ya kitoko ya kolia.Yango ekumbaki ye tii na zamba oyo ezali pene ya mboka.Talaka ayoki mongongo moko ekobelelaka : »nakufi eh!nakufi eh!,"Apusana boye,amoni nguma akangemi na motambo, monyama ezingi ye pe nzete moko enyati ye, mayele aningana te. 

Nguma abondeli ntaba : ntaba bikisa ngai ee kotika moninga boye te !!!Ntaba na mayele na ye ya mokuse, atomboli nzete, akangoli monyama, mpe nguma alongwe na motambo.

Kaka wana nguma akangi
ntaba ,alingami na ye mpe ntaba abandi kobelela "boni boni tika ngai nguma ,ngai nalongoli yo na. motambo,tika ngai nakende"

Kasi nguma azongisi -« ngai nazali na nzala,soki natiki yo nakolia nini?".

eteni ya ibale -2

 Mosika te na bango,mboloko azalaki koleka wana ayoki bango mpe apusani atuni bango"likambo yango nini bokowelela boye?  Ntaba kuna akangemaki , aweleli koloba « nguma nabikisi ye na motambo, alingi aboma ngai,loba na ye atika ngai pema esili ngai!

Kasi se wana nguma pe alobi ya ye. Mboloko amikwanyi moto pe alobi" :

-oh ngai namoni 'te bino mibale bokoloba bosembo te.Bomizongisa naino ndenge bozalaki uta ebandeli mpo totala soki ya solo penza ezalaki bongo!

Wana nguma ayoki boye, aweleli kofungola ntaba . Sima na yango nguma amilalisi pe ntaba azongisi nzete ya motambo likolo na ye na monyama ekangi lisusu nguma.

eteni ya isato

Mboloko atali boye pe moke te nguma abandi kobelela na mpasi ya kilo ya nzete"fungola ngai ee! Lon gola nzete! kilo!" Ntaba na ndenge na ye alingi apusana lisusu atombola motambo,akangola monyama,   ,kasi mboloko abendi ye na pwasa pe alobi "boni yo bontaba boye! Ngai nasali boye mpo nabikisa yo mpe olingi lisusu kolongola ye? Yaka tokende,totika ye akufa na motema mabe na ye wana!" Mboloko na ntaba bakei ,batiki nguma akomilelaka 'naaakufi eee! naaakufi. eee

Nani akobikisa ye?

Na mokili kotambola bo- ntaba te! Mpo tozali na mokili ya nguma! Zala mayelena ekenge lokola mboloko .

 

Lisapo : Kotambola bo ntaba te !

Tolanda lisapo lya biso malamu na bilili 

Contactez-nous

Téléphone: +33 769232612

E-mail: groupedepresselessentiel@gmail.com

Adresse : 20,av.Paul Valery, Sarcelles 95200

Ce champ est obligatoire

J'accepte que ces données soient stockées et traitées dans le but d'établir un contact. Je suis conscient que je peux révoquer mon consentement à tout moment.*

Ce champ est obligatoire

* Indique les champs obligatoires
Une erreur s'est produite lors de l'envoi de votre message. Veuillez réessayer.
Merci ! Nous vous recontacterons dès que possible.

BALANGA NZEMBO
NA BAYEMI 
YA KONGO

Awa tokotiela bino bikela  to misala ya balanga nzembo na bayemi ya Kongo . Ekeko oyo ya Maboko esalemaki na moyemi monene LIYOLO . Yango  ezali na Kinshasa , na Q.Matonge ,na balabala Victoire-Kasavubu na  esika ebengami "Place des Artistes", elakisi "Esika ya bayemi na balanga nzembo"  ya Kongo. Kuna batiaka palaki ya kwifele na nkombo ya oyo balingi kopesa lokumu.

Balanga nzembo babandi ya mabina rumba na  Kongo

Nazuaki likanisi ya kotia esika moko na vidéo eye nzembo ya balanga nzembo ya kala baye bazali nde babandi ya liboso ya  mabina toyebi lelo na nkombo  ya rumba (to kumba ) . Mosala mwa bango esengeli ebunga te . Mpo bango nde bafungolaki nzela uta eleko ya Congo-belesi  pe lelo eboti bana ebele .  Talaka lelo mabina wana mandimami na UNESCObo nkita ya kobatela mpo na molongo!   Nakolikya 'te lokumu ena ekotombola lisusu mabongisi ya misala ya mandanda  na mpe  lifuti ya balanga nzembo mpo tokoma komona mingi bakokufa na bobola .   Awa bokolanda mandanda ya kala penza oyo mingi eyokanaka lisusu te. Vidéo eye ezali ya ngonga misato mobimba !!! Kasi tozali na likanisi ya koluka mandanda masusu mpo na kopesa lokumu na balanga nzembo mpe mpo bilenge na baluki ya mandanda  bayeba kozua misala ma bango.  Boboto na bino!

MOKAKO SWA
(A/C leobanem-1977)

Mokako elakisi Longonya ! Lolenge bankolo bapesaka bana na bango po na kokumisa bango tango asali likambo oyo esepelisi bango ! Loyembo  eye ezali   Leobanem  akelaki yango na mobu 1977 na Paris tango azalaki naino moyekoli na Université. Bazalaki pe na mwa lingomba ya miziki  ya kosepelisa baninga tango ya milulu  . Bakotaki studio kaka bato misato : ye moko  na bandeko mibale wana.  KALOS (guit.solo, acc.,bass)pe na Israël Bale (drum).    Bokolimbisa mpo  oyo bokoyoka awa na youtube ezali palaki te lolenge   ebimaki na African Music kasi mingongo ya oyo ezali awa mizuamaki na casssette .  

ALANGA NZEMBO:  MOSALA YA BAZANGA ? (1)

Uta kala , na ekolo na biso , mosala ya kosepelisa bato na mandanda ezalaki penza mosala ya lokumu te. Yango baboti mingi balingaka bana ba bango bakota mangomba wana te . To pe ata libala , babokilo bazalaki kosepela ata moke te ete mwana na bango abala alanga nzembo. Yango emonanaki se lokola mosala ya zoba. Ntina pe ezali ete balanga nzembo wana bazalaki kobongisa bomoyi bwa bango te. Tokolobela yango na mwa molayi mwa liboso kuna.

TATA YA LEA
A/C King Joe Bale

Loyembo loye ekolobela lisolo ya mwasi moko azali kolobela mobali aboti na ye mwana nkombo Léq lolenge asundoli bango. yango akomituna lolenge nini akobola mwana wana. Tobongisaki loyembo eye kaka na mokolo moko ya mposo liboso tokota studio.(bayembi:king joe, leobanem; guit.acc&bass:Thoms Toro masika; guit.solo: Yacinthe; batt.drums:Coco/prod.mme Lacoste)

MANGOMBA YA MASANO YA MIZIKI  YA BAYIKONGO NA FRANCE  (1970-1981)

Na eleko ena bayimboka bazalaki naino na mangomba penza ya miziki ya tango nyoso te. Mpo bayimboka ya Kongo baye bayaka na France bazalaki mingi nde bayekoli.Miziki ezalaki bongo kaka  mpo na kosepela elongo na mwa bantango lokola na eleko enene ya bopemi to mpe  milulu ya bonsomi ya ekolo ya 30juin. Nakotanga bongo mangomba misato : orch.La Macoumba de Paris, Orch. Elikya  pe na oyo tosalaki na  Kalos,Thoms,Lwigi, Mbelo Robero,  Baudry  ,  kasi mangomba ya miziki  mazalaki mingi te na bileko bina. 

MBOKA KONGO  😎

Na loyembo eye ekolobela boyokani esengeli kozala kati ya bana Kongo. Moyembi akosenge tolingana pe tokumisa mboka Kongo mpo atamboli mikili mingi amoni mboka eleki ya biso te. 

EBALE 
YA KONGO        🤝

EBALE YA KONGO EZALI LOPANGO TE  EZALI SE NZELA . ..

Loyembo eye esalemaki na eleko oyo mokili ezalaki  na oyo ebengamaki bitumba ya nkuku (to guerre froide! )Baye balandi ya USA na baye ya URSS bazalaki kobendana bendana! Lokola Kinshasa ezalaki kolanda USA pe Brazza kolanda URSS  boyokani ezalaki ata moke te. 

AFRIKA.              😍
 MOKILI MOBIMBA

Loyembo ekelami na Déchaud (guit.acc)  awa  akokumisa Afrika mpe   mosala ya lingomba na bango ya African jazz lolenge mokili  mobimba ekosepela kobina miziki na bango 

 

 

LE BUCHERON
(mokati nkoni)      🧐
A/C Franklin Boukaka

Na loyembo oyo moyembi azali kolobela lolenge bana mboka bakonyokwama kati ya Afrika mpo bapolitiki bakomisa bokpnzi nde lopanga na bango moko babosana bayimboka oyo babundaki na bango elongo. yango  akomituna "mondele akende ,lipanda tozuaka mpo ya nani Afrika!!!"

BIOGRAPHIE: 

LOMBONGA 👊🏽
(A/C Max Mongali)

Max Mongali  azalaki moyembi monene mpe mokeli monene ya nzembo. Abeta miziki na Teye national , na African Fiesta ya Rochereau mpe apesa nzembo na byembi enle lokola ya Zaiko oyo Bimi Ombale ayemba na Yoka Longo .  Etape, Etike ,  Ngongi ezali nzembo na ye ...Azalaki naino moyekoli na Belgique tango asalaki loyembo oyo elongo na Michaela na ebele misusu . Awa akotalisa monene ya boyebi na ye mpo na mpasi ya bato ya ekolo na ye Kongo kaka te kasi akobunda mpo na molongo o bisika binso bakonyokola bayimboka .. Yango ayembaki loyembo eye na lingomba ya Yeye National. Maloba : Eee lombonga eee lombonga eee bamama bakolela !!

Baboti ngai moumbu na Kongo monene

Nakoli na mpasi ya bampaya

nalelaki aa mama. !!

Tongo etanaka mpo na moto  nyoso na mokili / bulamatari akangisi mayele na ngai na molili 

Bayibaki bakosaki bayindo

 Lumumba atelemi atumbi moto na ebale 

Babanzaki bazindisi bayindo 

liwa ya Lumumba epelisi mwinda na mokili 

eee lombonga lombonga eee bamama bakolela 

Masamba  Débat  ee Sekou Touré na Nasser  wapi Mandela  na 

N'krumah tolela Bonganda aa

 -Uta na Mozambique Angola kino Rodhésie  Sud afrika Nzambe Afrika akobimbola 

-Angola ekozika Mozambique ekokelela bana ya Afrika nyoso tolela   baninga a Nzambe 

 Mao na Hô Chi Minh  bilombe ya révolution wapi Guevara na Malcom toyemba lombonga aa

Bolivie na Guatemala Vuenezala na Uruguay  Vietnam bilombe ya guérilla nde balongi etumba 

Ee lombonga eee lombonga ee bamama bakolela 

 

LISOLO YA YEYE NATIONAL NA NIMI NZONGA mokeli ya lingomba lina

Yeye National ezali lingomba ya bayimbokaKongo  bazalaki kofanda na Liège na nzinga nzinga  , o mboka  Belgique. Los Nickelos nde ezali ya bayimboka KONGO  na Bruxellles  

SOLO OKANGI MOTEMA 
A/C Bouboule Roger Nimy)

Yeye National ezali lingomba ya bayimbokaKongo  bazalaki kofanda na Liège na nzinga nzinga  , o mboka  Belgique. 

YOUNA        😔
A/C Bokito Tony Dee &Los Nickelos)

Tony Dee Bokito azali moyembi monene asala maboke ya nzembo na lingomba Los Nickelos. Azalaki moto akofanda na   Bruxelles kasi nzembo na ye etonda bwanya ezalaki kokende mosika na mopepe lokola loyembop oyo ya YOUNA etondi na malako  

Awa azali na lisolo ya mwasi akomilela mpo aboti mwana na mibu ya zomi na motoba kasi mobali asundoli ye na mwana . Yango akomilobela 'te akosala pe kindumba te kasi akobokola mwana na ye na bonsomi nyoso. Mokili mozali kotambola bakomata lelo lobi bakokita ! Nzoku akobosana motyop azokisi ye te !! maloba  ya nsomo na kilo !!! losambo monene oyo ekomelaka bato misusu nde bilakela mabe!!Bomoyi mobebi libela  mpo mabe tosalaka na nse oyo ekozongelaka biso !!

 🎵Tolanda maloba

Youna lelo otali ngai pamba /otiki ngai na mpasi ezali kosua ngai/obosani eloko moko ya monene mwana toboti chéri ee/youna yo moko nakoyebisa yo /soki ozui tango tuna bomoto na yo /nakokanisa eyano yango ekozongisa yo tapale euti na yo/ 

Nazuaki zemi na yo ngai na 16 ans /Naboteli yo Felly nazali se mwana / Namonaki yo moto ya lokumu kino mokolo wana nakangi yo na Luciana/nakanisi pasi avenir ya Felly na biso/Na kombo ya mwana nandimi pe tozongani/N'esika otika olandi se nzela wana /O dit Youna na juger olakisi oboyi ngai

refr Naleli mama aa ! naleli mama aa/nakoki tokutana naleka yo na nzela nabwaka miso epai /O felly tika kolela nazali mama nzoku akolembe mino na ye te / Eloko nakoluka namikebisa nabokolo yo jamais vie ya ndumba(bwange) /mokili mozali kotambola /bakomata lelo lobi bakokita nakoluka Felly asala asilisa kelasi nzoku akobosana moto azokisi ye te

 

LENGELA KONGO 
(A/C ZIZI  NZANGA  )

Moyembi Zizi Nzanga mopko ya lingomba ya kala Yerye National ayembi awa na bato ye asangisi. ye nde asala loyembo Pilipili  , Eminence na misusu . Azali awa koyembela ekolo pe kosenga na bayimboka basimbana mpo na kosalela ekolo na bonsolo . Totalaka lolenge mibu mileki poe tozongi sima na bisalasala. Yeye National ezali lingomba ya bayimbokaKongo  bazalaki kofanda na Liège na nzinga nzinga  , o mboka  Belgique. 

 

PILIPILI
(A/C ZIZI  NZANGA  )😍🏵️

Moyembi Zizi Nzanga moko ya lingomba ya kala Yeye National ayembi bolingo oyo motyo abombi na motema esengeli aloba mpo ekosuwa na motema lokola pilipili ata asali lokola likambo ezali te !  

🎵Tolanda maloba: 

-Ekosuwa ngai lokola pilipili/Luisa nyongo na ye awuta bomwana mokanda ya pamba ngai oyo nazikisa na tango nyoso ye  akolela eee

-Ekobeta ngai lokola nazui likambo ngai pe nyongo na ye ata nakofuta ekosila te nini akoluka ee ayebisa ngai po 'te tolingana 

Yebisa ndeko na ngai tikaka nsoni/ngai pe ko makila na yo tokokani ata pe tokochanger façon ya kovanda okobanga nini mpo 'te oloba na ngai

 

BOLINGO 
YA TELEPHONE
(A/C ZIZI  NZANGA  )

Moyembi Zizi Nzanga moko ya lingomba ya kala Yeye National ayembi bolingo ya téléphone awa alobi alembi libala ya telephone .Amoni 'te mikolo mikoleka eloko moko ezali te,akomi kutu konuna. yango alobi akoluka nganga nkisi akangela ye mpungu to nganga nzambe alekisa ye ntubela  ye alongwa kati ya botutu oyo! 

🎵Tolanda maloba

- Bolingo ya telephone nasi nalembi yango nayebisi yo Tété

-Bolingo ya allo nakoki  namiboma na yo  mwana mama

-Ekomaka tokutani akotala kodongolo na ndenge ya mabe

-Nasengaka conseil nalingi mpo nayeba lolenge ya momie

Gentil ya telephone motema satana nakomi ébahi! 

-Naluka nganga- nkisi akangela ngai mpungu  - akangela ngai mpungu nakomi nde kolembe libala ya allo

-Naluka nganga Nzambe  oo alekisa ngai ntubela oo - alekisa ngai ntubela  nakomi nde konzuluka  libala ya telephone  

 

OKEI TE MAXO 
in memoriam Max Mongali
(A/C ZIZI  NZANGA  )

Moyembi Zizi Nzanga moko ya lingomba ya kala Yeye National ayembi  mpo na liwa ya moninga mpe ndeko Max Mongali /alobi 'te mpo nini okei noki....mawa !!

Tolanda maloba :

Dit Maxo a ee dit maxo e mama mama a 

Okei noki eee oweli nini eee obundi na nani eee

okei mbangu mingi naino tolembi yo te / Tuna n'esika y'ozali motindo tozoki 

mbala mingi tolobanaka  mokili tovandi naino  /oweli lisusu okimi ngai 

-Lamuka yo opesa ngai mbote guy alembi kolelalela 

Batela Tété na bana batela 

Talaka Gaby na bana talaka

Talaka Elodie na bana talaka e

Batela François na bana batela 

Pesa na Bébé mbote bovandi pene

-Dit Maxo eee dit Maxo ee ma ma ma 

okei noki ee! oweli nini ee! obundi na nani ee !

Lamuka y'opesa ngai mbote nzoto etondi motungisi ee

Tony Dee Bokito apesi yo mbote ...

Dit Maxo....dit Maxo ee 

Lamuka y'opesa ngai mbote molimo etondi mawa 

Koffi olomide apesi yo mbote ...pesa na Nyampanya mbote bovandi penepene

Dit maxo  ee Dit Maxo ya Mongali 

 

Ce champ est obligatoire

J'accepte que ces données soient stockées et traitées dans le but d'établir un contact. Je suis conscient que je peux révoquer mon consentement à tout moment.*

Ce champ est obligatoire

* Indique les champs obligatoires
Une erreur s'est produite lors de l'envoi de votre message. Veuillez réessayer.
Merci ! Nous vous recontacterons dès que possible.

Bokozua  biso  awa :

Téléphone: +33 769232612

groupedepresselessentiel@gmail.com  

©Droits d'auteur. Tous droits réservés.

Nous avons besoin de votre consentement pour charger les traductions

Nous utilisons un service tiers pour traduire le contenu du site web qui peut collecter des données sur votre activité. Veuillez consulter les détails dans la politique de confidentialité et accepter le service pour voir les traductions.