


Lisap’ónge!
-Ónge!
-Lisap’ónge
-Ónge
-Bayímbóka boyamba lisapo eee !!! -Eeeeeee
Ezaláká. na. eleko yↄ́kↄ́, moyi na longembó bazaláká baníngá. Bǒngó lokola bandeko, balingánáká míngi. Bangó míbale bazalákí, elↄ́kↄ longembó akolía, moyi mpé akolía yangó. Sↄ́kí mↄ́kↄ́ azwí likambo moníngá akokԑndԑ mbángu kotála monínga wa yě mpó ya koyéba likambo níni eleki epái na yě. Sↄ́kí mpé kosálisa yě, ásálisa yě. Kasi eyéi kokóma mokↄlↄ mↄ́ kↄ́ longembo ayókí nsango te mwǎna wa moníngá wa yě Moyi azáli kobéla. Amilobí: « T̂ԑ nakóki kotíka boye t̂ԑ, nákԑndԑ kotála mwǎna wa moníngá wa ngáí ndéngé azáli kobéla ». Azwí libénga na yě, atíi bankísi na yě oyo atámbolaka na yango. na kati.
Abandí kokԑndԑ, akómí kúná epáí ya Moyi, akútí boye banganga-nkísi batóndání na lopángo ya Moyi bazáli kosálisa mwǎna wâná. Atalí, alobí « ezáli kokoka t̂ԑ! eloko moko ekozanga ! soki natiki boye ,mwana ya moninga na ngai akokufa »
-Lisap’ónge! -Ónge!
́
Abéngí Moyi pԑmbԑni, alobí:


« Moníngá, ndéngé banganga-nkísi bazáli kosálisa mwǎna óyo, balembí bazali kókoka t̂ԑ, bokↄno óyo mwǎna azáli na yángo, ngáí nakosílisa yangó ». Afungolí líbenga na yě, abimisí nkísi alobí: « omóní nkísi óyo, látísa yangó mwǎna, mikↄlↄ míbale. Na sima ya mikↄlↄ míbale mwǎna akobíka ». Esilaki ye koloba boye ,atikeli moninga na ye Moyi nkisi ena pe azongi o mboka na ye .
Na sima wana Moyi mpé azwí nkísi alátísí mwǎna. Elekí káka mikↄlↄ míbale mwǎna mpé abíkí. Moyi asepelí, bato nyↄ́nsↄ mpé basepelí. Sima ya mikolo mibale , Longembo alobí « názónga epái ya moníngá, nákԑndԑ kozwa nkísi mpó mwǎna asíli abikí ».
Kokóma akomakí kúná boye, átúna Moyi: « moníngá, nayei kozwa nkísi na ngai ». Moyi azongisi « Ah, nkísi yangó natiakí bobԑlԑ áwa na ndáko, zelá naínↄ , nakolukela yↄ̌ yango mokↄlↄ mosúsu ».
Longembo andimeli moninga na ye pe azóngí epai na ye . Eleki wana mikolo minei Longembo alobí: « názónga epái ya moníngá na ngái ázóngisela ngai nkísi na ngái. ». Akeí akomí kúná alobi na Moyi : « Moníngá, ngai oyo nayei lisusu, zóngísélá ngáí nkísi napesákí yↄ̌ , mwǎna asíli abikí ».
Moyi atali ye alobí « ah! zelá naínↄ mwa mokԑ , nakolukela yↄ̌ ».
Longembo andimeli lisusu moninga pe azongí ndako na ye.
Ekómí mokↄlↄ ya motoba akeí lisusu epai ya Moyi pe alobi na Moyi : « Pésá ngáí nkísi na ngáí, moninga! Nasalísákí yↄ̌ mpo na mwana abelaki . Sik’oyo ,zóngisela ngáí nkísi na ngáí, mwǎna asíli abikí ».
Moyi alobí: « zelá naínↄ mwa mokԑ, nakolukela yↄ̌ yango ». Longembo azongí, avándí, avándi mwǎna na ye mpe ayéi kokwéya káka na mpási ndéngé mↄ́kↄ́ óyo mwǎna ya Moyi azalákí na yangó.
-Lisap’ónge!
-Ónge!
-Bayímbóka boyambaka lisapo ee -Eeeeeeee
Longembo alobí: « názónga mbángu epáí ya moníngá apésa ngáí nkísi na ngáí mpó násalisa mwǎna. Kokóma akomí kúná, atála boye, Moyi yě wǎna asíli alátakí kitↄ́kↄ, alingí kobima akende kotambola. Ngembo alobí na Moyi : « moníngá, bolímbisi, nayéi epái na yↄ̌ , mwǎna na ngáí abelí káka mpási ndéngé mwǎna na yↄ̌ azalákí na yangó. Bóngó zóngíséla ngáí nkísi wâná, nákԑndԑ mpé kolátísa mwǎna, mwǎna ábika ».
Moyi ayébísí yě ‘te: « ngáí nasíli nalátí kitↄ́kↄ boye, nazáli kobima, bóngó óyébisa ngáí názónga lisúsu mpó na kozuela yↄ̌ nkísi? t̂ԑ ee!!! ».
Moyi abimí káka ndéngé ameséná na lolԑndo na yě nyↄ́sↄ akeí. Longembo azongí azwí nkísi mosúsu asalísí mwǎna kasi ezalákí nkísi wâná t̂ԑ, mpó nkísi óyo ebíkísáka bokↄnↄ wâná, ezáli káka mↄ́kↄ́ . Ámeka boye pamba , tii mwǎna na ye ayeí kokufa . Longembo aleli mpe akundí mwǎna na yě.
Ntángo akundí mwǎna na yě, epesí yě mpási alobí: « likambo óyo Moyi asalí ngáí, ngáí na yě uta lelo bondeko esili libela libela ! ». Mpe mpo na kotalisa yango akini mpe na motema moko komona to kokutana na Moyi.
Yango sↄ́kí amóní ekómí káka Moyi alingí kobima, Longembo amibombi. Akolinga kokutana na ye te . Akozela tii sↄ́kí Moyi akeí akomi mosika tii tango akokota kolala, wana nde longembo abimí.
-Lisap’ónge!
-Ónge!
-Bayímbóka boyambaka lisapo eee -Eeeeeee
Yangó wǎna bomonoko longembo atámbolaka tango Moyi azali naino libanda t̂ԑ. Yě akotambola káka na butú . Mpé ntángo atámbolaka wǎna , atiaka elongi na yě káka na nsé mpó ámↄ́nↄ Moyi t̂ԑ.
Bandeko, súka ya lisoló wana mpé ntína na yango ezalí eboye :
« Moníngá sↄ́kí asalísí yↄ̌ , kozóngisela yě mabe t̂ԑ ».
Météo actuelle : Ciel partiellement nuageux à Kinshasa !
Ce mardi 23 septembre 2025, les conditions météorologiques à […]
Catégories de blog
- -swahili
- Actu rdc -editorial
- actu rdc-avis de deces
- actualite rdc
- actualité rdc
- actualités & brèves internationales
- Actualités-Sud kivu
- Arrêt sur image
- Cuisine -Gastronomie
- Culture-livres-BD-arts-musique-danse-théâtre
- Détente -Weekend
- DOSSIER
- Economie-développement
- Editorial
- Environnement
- Jeunesse Magazine
- Kikongo
- kiswahili
- Lingala
- Media
- météo
- Opinion
- Opinion
- podcast
- Recette du jour
- Regards sur l'Histoire
- sango ya molongo
- Santé
- Sciences & éducation
- sciences & éducation
- Sécurité
- Société
- Spiritualité-religion
- Sport-Tennis féminin
- sports
- Sports
- Transports
- Vie quotidienne et Services publics
Le Secrétaire général de l’Onu : » la décision d’Israël sur Gaza est une escalade dangereuse »
Alors que le Conseil de sécurité poursuit actuellement sa […]
Sud-Kivu/Kalehe : un nouvel incendie ravive la détresse des sinistrés de Katashoka
Dans la nuit du vendredi 8 août 2025, un […]
Poutine na Trump bakokutana o mokolo mwa 15 aout
Tozui sango lobi loleki ete Poutine andımı mbela ya […]
Poutine rencontre Trump ce 15 août en Alaska
Nous avons appris hier que le président Poutine a […]
Bagira : Muhoza Shaka satisfait du travail d’assainissement de sa commune
De 8:00 à 11:00 , un engouement général a […]
Conseil de sécurité de l’ONU: Réunion d’urgence dimanche sur Gaza
Nous apprenons ce jour que le Conseil de sécurité […]
# IMAGES DE LA VICTOIRE INSPIRANTE DE VICTOIRE MBOKO
*Diaporama de la championne mondiale canadienne 🇨🇦 d’origine congolaise […]
Sud-Kivu/Politique : Le Secrétaire Permanent de l’AFC-M23 Benjamin Mbonimpa prône une gouvernance solide et efficace
C’était une rencontre très attendue qui a regroupé les […]
Bukavu : Les jeunes « Kassomba » pris au piège entre survie et insécurité
Dans un contexte sécuritaire et économique de plus en […]
Bukavu : Des victimes des incendies en attente de secours
Dans les ruelles de plusieurs quartiers de Bukavu, l’odeur […]
About The Author
En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC
Subscribe to get the latest posts sent to your email.