0 9 minutes 38 minutes

Ebongisami na Molakisi Leobanem

Q.Matonge ezali ya solo quartier  moko ekende sango koleka bisika nyoso ya Kinshasa. Tii na ekolo Belgique okokuta kuna baye bakende kuna kala sima ya lipanda ,  lokola bakomaki mingi bazalaki na  biska ya kokata suki , ya koteka bilei to restaurant kati ya bandako pe bazuaki pe bisika ya koteka ba CD na ba cassettes na ba nganda yakokutana pe okomela masanga .  Mpo posa ya moka esilaka te pe miziki ya ekolo na biso ezalaki kozongisa bato esengo ata soki mboka szali mosika. Nyoso oyo esala ‘te quartier oyo wana nyoso bakoma kobenga yango  Matonge !  

Kasi na Kinshasa , quartier Matonge yango ezali na eteni ya likolo  ya komine Kalamu   . 

  Kasi soki tokokuta bandako ya kitoko ya mike mike oyo ezali lisusu komonana kuna na ba balabala batia mwa goudron  oyo bana mike bakobengaka « macadam to prince » se lokola basala na Quartier  Matete,  ezali mosala esalemaki na kompani Office des Cités indigènes de Léopoldville (OCIL) na mobu 1950 mpe bapesaki yango nkombo Quartier Renkin . 

Jules Renkin azalaki belesi , moto ya  mibeko to mosambeli (avocat) mpe   moyangeli  ya yambo ya  misala ya kokonza Kongo na ekolo Belgique to colonies (ministre des colonies). 

Kombo eye Matonge eyaki sima kopesama na eleko ya politiki ebengamaki « Bozongeli bonsomi ya bonkoko  » to Recours ya Authenticité ,tango ya bokonzi ya  Maréchal Mobutu na mobu 1970 . Kombo Matonge euti na   bambuma kombo matonge ezalaki kobota kuna mingi liboso batonga bandako wana , mpo ezalaki kaka esobe ,  na matiii ebele na banzete na yango.  Yango ntina ya  nkombo  oyo bayangeli ekolo na eloko ya Mobutu ,bazongisaki mpo na quartier oyo wana .    

Kasi quartier oyo ekabwani lolenge kani? Soko otali lopkasa eye totieli bino ,okomona awa  Matonge na kati kati,  epai pene ya balabala Kasavubu (kala ebengamaki avenue Prince Baudouin) ezali  quartier Victoire pe epai kuna,  Stade Tata Raphaël oyo ezali  pene ya balabala Bld Lumumba oyo kala ebengamaka Avenue Leopold II .  Tango ya kala  awa nde elekaki  na bisika ya komela pe kolia . Awa nde bar ekende  sango lokola Olympia   nde ebengamaki bar Vis-à-vis. Esika ena  balanga nzembo banso ya minene bazalaki  kobeta miziki . Soki obeta kuna te ,wana okoki naino makambo te !.  Yango butu nyoso bana kin bazalaki kosopana kuna mpo na koluka esika ya kosepelisa nzoto ntongo sâa mokolo ya mposo. Yango pe studio ya kotia miziki na ba palaki lokola ya Vévé  nde eyaki kokelama na ngambo ya komine Kasavubu , na balabala Kasavubu. .   

Lokola bato bazalaki mingi kosepelisa nzoto na butu , wenze mpe bapesaki nkombo Jakarta esalemaki pene ya mwa libanda ya ndembo sima ya posita ya Kalamu oyo bato banso bayebaka tango ya kala mpo na kotinda to kozua mikanda to mpe mpo na mbela ya nzela ya singa to telephone.  Na wenze ena ya Jakarta , ata outi wapi na butu okoki kokende kosomba eloko nyoso ya kolia basila kolamba. Awa na Matonge nde mangomba nyoso ya miziki bazua nkeni ya lokumu na bango kobanda na bakulutu lokola Tabu Ley  na Franco tii na bilenge Zaiko,Thuzaina,  Papa Wemba na basusu banso. 

Bilenge oyo babengami basapeurs to « balanga bilamba », bango bayaki kokomisa wana esika na bango tembe te mpo bisika ya kosakana na butu ezalaki mingi na ba mbula 70-80. Tobosana te tango ya elamba nkombo « polo César » , na ba « polo salé »  ebimaki nà ngala ya bilamba bibengami « prêts à porter » to « ekoki kolatama   »  ebandaki liboso  na ba magazini ya « Masamba Newman » oyo akotisaki bilamba mingi bizalaki kouta mboka bapaya na Kinshasa . Ye azalaki pe na ba magazini ebele na Kinshasa komanda na oyo ezalaki na komine ya Gombe , pene ya nadado enene ya nkombo « Kin Maziere ». Oyo nakoloba ezalaki na eleko ya bokonzi ya Maréchal Mobutu . Wana   liboso ‘te bayi-mimbongo  ya Sénégal  pe  bakoma koteka na ba magazini na bango   na quarttier matonge. Kuna nde bango bakomaki koteka biloko nyoso  se lokola oyo okokaki kokuta na ba magazini ya komini ya Gombe. Epesaki  na bato mingi nzela ya kokende lisusu na komini ya Gombe te kosomba bilamba to sapato .  Bakomaki kosomba kaka na quartier matonge oyo ekomaki pe lokola « ville » ya bayimboka kasi ezalaki na makambo manso ya ville te , kaka mpo na mimbongo . Toyebaka ‘te oyo ebengami « ville » na Kinshasa ,  ezali nde eteni ya Kinshasa oyo ebongisamaka na ba belesi na eleko ya boyangeli mboka Congo -belge. Bango batiaki bayimboka na ngambo oyo ebengamaki « cité » to esika ya kofanda ya bayindo . Kuna lotiliki ezalaki penza te, pe kaka bandako mike mike lokola na mboka bankoko. Eteni oyo ebengami ville nde babonğişaki yango kaka mpo na mindele ! Yango kuna okokuta ti na lelo bandako minene ya Leta, ya Esambelo, bisika ya kobomba misolo to banque pe na zando ya moenen moko na  ba magazini ya kosomba biloko  nzike.  Yango oyo nde centre commercial na ebengeli ya lelo. Kasi soki oyoki moto alobi na yo na Kinshasa  n’te akei na ville , mingi ezalaka kaka mpo na kosomba biloko na ba magazini oyo ezali kuna  pe ekotekaka mingi biloko bikoutaka na mboka bampaya .     

 Awa na quartier Matonge mpe  okokuta basoni bilamba ya minene ya Kinshasa ya ndenge nyoso mpe bateki bapalaki to na tango wana ezalaka naino  ba disque vinhil oyo toyebaki ya 45 tours liboso ‘te ba cassettte ebima . 

   Tango ya kala bato bazalaki kozela mikolo minso ya mposo na Matonge liboso ya bisika batekaka ba palaki ena mpo na kosomba nzembo ya sika oyo ekobima . Nyoso ezalaki  kaka kobima na Matonge liboso eyokana na Kinshasa mobimba mpe na Kongo na molongo.

Yango na ngambo ya rond point ya Victoire batia elembo pe bapesa esika ena nkombo « Place des Artistes ». 

Na likanisi ‘te bapesa lokumu na balanga nzembo ya ekolo na kokomaka nkombo na bango na esika etiama na ekeko wana oyo ezali na songe na yango kotalisa maboko ya moto . Ezalaki penza likanisi ya kopesa lokumu na balanga nzembo banso baye batika sango na Kongo.  Awa mpe ntongo nyoso okokuta bateki zolonale biye bikopesa nsango ya mboka batandi yango na mabele.  Tokoki kotanga pe esika mosusu ezalaki kosala mwa makambo ebele na Matonge lokola Carrefour des Jeunes oyo ekelamaki na Leta mpo na kosunga bilenge batika mobulu  mpe  bayeba komipesa na misala ya ntina . Kuna nde lingomba ya bayembi ya bilenge nkombo Chem chem Yetu ezalaki kosangana. Oyo wana ezalaki koleka  na eleko ya Zaïre. Bomoni ‘te Place ya Victoire ezali esika monene oyo ekosangisa pe kokutanisa bato banso baye bakokende epai na epai ya Kinshasa .Soki outi na Gombe okoleka liboso wana mpo ozua motuka oyo ekokumba yo epai na epai . Nakolikya ‘te tango bakosala ndele nzela ya engbunduka ya pepele ya sika lokola tram , ekoleka mpe wana mpo ezali ekaboli monene mpo na bakomine ebele ya Kinshasa.  Yango ekomi penza rond point to esika ya kosangisa pe kokutanisa bato ebele ya epai na epai  ya Kinshasa. Soki totali pe esika oyo ebengami Ymca oyo etika sango mpo na mobulu mosalemaki na ntina ya lipanda na 4 janvier 1959 na balandi ya tata Kas avubu na lingomba na ye ABAKO,  ezalaki mpe na Matonge. Yango tokoki koloba ‘te na ba quartier to bikaboli nyoso ya Kinshasa oyo eleki Matonge ezali te . Yango molimo wana ya Matonge baye baya na Belgique bakumba yango kuna na Bruxelles mpe bakela ya bango Q.Matonge kuna. kasi tokolobela pe masolo ya ba quartiers misusu batika sango na Kinshasa-Lipopo.  

Blog

Cette section offre un aperçu du blog, présentant une variété d’articles, d’analyses et de ressources pour informer et inspirer les lecteurs.

About The Author


En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC

Subscribe to get the latest posts sent to your email.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *