
Mwa maloba ya bososoli:
Na mboka na biso,bakulutu bazalaká mpokwa nyoso kopesa masapo na bilenge.
Wana naino basali bitaleli ya etando eke te ( tv) to bitaleli ya ba sateliti te (Internet) . .
Ata ko babuku ya kotanga ezalaki ,kasi masapo wana mazalaki na elengi moko koleka na oyo tozalaki kotanga.
Ezalaki mpo na biso koleka na masano ya théâtre oyo tokoma komona.Moto moko azali nkolo masapo te. Yango esali ‘te soki oyoki lisapo ya kitoko okobomba yango malamu mpe kutu okolamba yango lisusu malamu penza po yo pe okabela baninga.Masapo mana mazali kaka masolo te kasi matondi na bwanya mpe mayele ya mokili.Lelo nakokaba lisapo moko nalandaki lobi na monoko ya moyembi moko na nkombo Pitshou Mwanza .Tolanda!
Lisapo :KOTAMBOLA BO NTABA TE !
Ntaba moko azalaki koyengayenga na boluki matiti ya kitoko ya kolia.Yango ekumbaki ye tii na zamba oyo ezali pene ya mboka.Talaka ayoki mongongo moko ekobelelaka : »nakufi eh!nakufi eh!, »
Apusana boye,amoni nguma akangemi na motambo.Nzete moko enyati ye, mayele aningana te. Nguma abondeli ntaba : ntaba bikisa ngai ee kotika moninga boye te !!!
.Ntaba na mayele na ye ya mokuse, atomboli nzete, mpe nguma alongwe na motambo.
Kaka wana nguma akangi ntaba ,alingami na ye mpe ntaba abandi kobelela « boni boni tika ngai nguma ,ngai nalongoli yo na motambo,tika ngai nakende ».
Kasi nguma azongisi -« ngai nazali na nzala,soki natiki yo nakolia nini? »
Mosika te na bango,mboloko azalaki koleka wana ayoki bango mpe apusani atuni bango »likambo yango nini bokowelela boye?
Ntaba kuna akangemaki , aweleli koloba « nguma nabikisi ye na motambo, alingi aboma ngai,loba na ye atika ngai pema esili ngai!
Kasi se wana nguma pe alobi ya ye.
Mboloko amikwanyi moto pe alobi » :
-oh ngai namoni ‘te bino mibale bokoloba bosembo te.Bomizongisa naino ndenge bozalaki uta libandela mpo totala soki ya solo penza ezalaki bongo!
Wana nguma ayoki boye, aweleli kofungola ntaba . Sima na yango nguma amilalisi pe ntaba azongisi nzete ya monyama ya motambo likolo na ye.
Mboloko atali boye pe moke te nguma abandi kobelela na mpasi ya kilo ya nzete
« -Fungola ngai ee! Longola nzete! kilo! »
Ntaba na lolenge na ye alingi apusana lisusu akangola motambo,kasi mboloko abendi ye na pwasa pe alobi: -« Boni yo! bontaba boye…! Ngai nasali boye mpo nabikisa yo, mpe olingi lisusu kolongola ye? Yaka tokende,totika ye akufa na motema mabe na ye wana! »
Mboloko na ntaba bakei ,batiki nguma akomilelaka ‘naaakufi eee! naaakufi eee »
Nani akobikisa ye?
Na mokili kotambola bo- ntaba te! Mpo tozali na mokili ya nguma! Zala mayele na ekenge lokola mboloko .
✍🏽Leobanem
Explorez des histoires inspirantes et des analyses d’experts.
Cette section met en avant l’objectif du blog, offrant des récits captivants, des opinions d’experts et des idées précieuses pour permettre aux lecteurs d’apprendre et de progresser.
De l’ombre au front : Une analyse de l’histoire de la résistance en RdCongo
Marchés des fournitures scolaires à Bukavu : Plaidoyer pour la création de points de vente temporaires
Persistance du Choléra au Sud-Kivu : La DPS alerte !
Kalehe : Les enseignants préparent la grève à la prochaine rentrée scolaire
Le « résistant » Léonard Kapita Mulopo nous a quittés
Frontière Ruzizi 1 à Bukavu : Un nouvel incendie ravage des commerces congolais
Sud-Kivu :l’Organisation pour l’Intégration des Personnes Vulnérables et Albinos asbl/RDC offre des kits aux enfants albinos pour la rentrée scolaire 2025-2026
Bukavu-sud Kivu : le Vice-Gouverneur ordonne le déguerpissement des marchés pirates
Sud-Kivu : Dunia Masumbuko appelle à accepter tous les billets de banque valides
Un message essentiel pour toi : Soyez bons les uns envers les autres
Bukavu : Les tarifs à la pompe grimpent
La RDC au bord de l’implosion !
About The Author
En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC
Subscribe to get the latest posts sent to your email.