0 9 minutes 6 mois
eyemi ya bituka ya kongo

MAYE MAKOSENGA MBONGWANA

Na eleko eye  tozali , ekolo Kongo ezali penza  kati ya nungunungu makasi .  Na eteni ya monyele  bitumba bikosila te . Kivu yango wana ekoti na mbongwana ya AFC/M23.   Baye bazali kokamba uta Kinshasa bakotisaki  koyinana, mafinga , kimoyibi  ya nkita uta likolo tii na nse . Elakisi penza ‘te mboka ezali kokambama na bosembo te . Bituka bakoma lokola bana bitike ! Nzela ezali te , ezala ata na nzela ya mayi , mpasi na mpasi lokola masuwa penza ezali te kaka bibeyi to baleinière oyo ekokoka kozua bato ebele te mpe mingi bakozua makama ya liwa na mayi. Bakelasi mpo na bana bikozanga  bifandeli, bikomeli , nyoso ! Tango balobi bafuta te etomboli montango ya bana na kelasi mpe molakisi  akokoka lisusu koteya malamu te .  Balakisi bakofutama  na lolenge bonsomi ya mosala ena ekosenga te, bakoma babola ! Nkisi ya kosalisa bato ekozanga lolenge moko na balopitalo yango moko.   Mosolo ya ekolo ezali na motuya te , biloko ntalo .Yango bato batika kondimela mosolo ya ekolo . Bakoma kosalela dollar ya Amerika koleka na mosolo penza ya ekolo! Suka na yango tokomona se  bisika ya kokunda bato ekoma ebele mpo liwa ekoti mingi na mboka. Mboka mobimba bosembo esila .  

MISALA MABE 

Yango tokomi koyoka mingi mingi bato bakomi komilobela ‘te esengeli ekolo ekota na esaleli ya fédéralisme  to boyangeli ya bituka lolenge tolimboli . Yango ezali mpo uta tozua lipanda mboka ekambamaki kaka na baye ya Kinshasa  mpe ezala mibeko to mbano nyoso ekoma kaka kozela Kinshasa  eloba . Bango nde bakonzi mpe bituka nde mingamba ! Nzoka bango basundola bituka uta kaka ekolo ezuaki lipanda! Yango bituka   ekoma zamba na zamba , ekauka  na bato!   Mokano  nyoso ata mpo na misala etali bituka ekoutaka kaka na Kinshasa !  Nzoka na Kinshasa sembo ezali soki moke te na oyo etali misolo. Touti koloba yango awa.   Nyoso oyo ekotisi likanisi ‘te mpo ozala malamu , esengeli kaka ofanda na KInshasa.  Mpo ata kofuta basali ya Leta na bituka , bazelaka  misolo miuta na Kinshasa.Tango mosusu ekokoma penza sima ya mikolo   , too  tango mosusu pe ekobenda mindondo na  makama ya ndenge nyoso , moyibi pe epai .    

BAYE BAKOSALELA BOYANGELI YA BITUKA 

Kasi mpo na kofandisa makanisi malamu,  tokopesa bino naino lisolo ya molongo na mpo oyo ebengami boyangeli  ya bituka . Bokambemi ya bituka  ya yambo na molongo ekelamaki na mobu 1789 o mokili ya Amerika. Tii na lelo ezali oyo eleki na  bonene mpe boumeli.  Ekolo Suisse mpe ebongisaki ya bango na mobu 1848. Canada na mobu 1867. Bikolo misato bina bizali tii na lelo mpe  kotambola na semba nyoso.  O bisika misusu bamekaki kotia yango lokola na Amerika ya ngele pe na Germany  ebongaki te .  Kaka na bonkama ntuku mibale mpe na suka nde mboka misusu bayaki kolanda lokola Australia. Suka suka tozali lelo na mboka ntuku mibale na minei bakosalela boyangeli ena. Mwa lolenge esusu ya kosala yango ekomi pe kobima epai na epai lokola oyo ya UE oyo esangisi bikolo na lingomba  UE ,  bazali elongo na Eropa pe bikolo bya bango bikomi  se lokola bituka!  

BOLAMU YA BOYANGELI YA BITUKA 

Soki totali malamu oyo esalema epai esusu elongo na baluki tokomono ‘te  bayangeli ya bituka bakosala mosala malamu koleka  . Yango ekouta na ntina ebele . Moko na yango ezali  mpo lokola etuka na etuka ekoluka kotalisa ‘te bakosala mosala malamu  na ekolo, yango ekopekisa nzela na misala ya mabe.  Moto nyoso  akoluka elonga ya etuka na ye mpe misolo mikotikala kati ya etuka mpo na misala oyo banso bakomona . Ntina ya kozela oyo akouta kuna aloba te. Bato na bato bazali na oyo ya bango balobeli lolenge baponoki bango. Banso bakomikengele . Mpe soki mosala ekoleka malamu te mbeba ekomonana na lombangu. Mpe baye baponomaki bakosangana na lombangu mpo na kozua mbano noki. Mpo moto moko te akolinga kozala sima ya baninga.  Na boye lifuti pe ya bato ekomata . Moto ya komilela akozala penza te . Ata mwa bozangi ezali ekozala makasi te ! Esaleli oyo etomboli oyo ebengami bokonzi ya bayimboka  to demokratia mpo bazali na makoki ya kolandela misala  ya etuka na bango malamu .  Bakoki  kozua mbano noki  engebene na mitindo oyo bango moko baponaki.Awa bayimboka bakokolisa bomoko kati na bango mpo bazali kondimela mosala ya moko na moko. 

MIKAKATANO OYO ESENGELI LIBOSO KOLONGA 

Kasi boyangeli oyo ya bituka ,ezali mpo na bikolo binso te kaka bongo te.  Mpo ekosenga ‘te mwa mabongiseli mazala mpo na elonga . Mpo na ekolo Kongo soki totali tokomono ‘te baye bakabolaki bituka basalaki yango na likanisi ya ‘te etuka na etuka esala mosala yango moko te .Mpe lisusu ata bongo bazali kotosa  mibeko te . Bituka bikomi lokola bilanga na bango po bakende kosakana sima  na Kinshasa to na mikili ya bampaya . Wana  babimisi misolo ya bituka ,  batiki yango  kaka pamba .  Tolobi lolnge bakaboli bituka ekoma ntuku motoba , basali yango na likanisi ya ba politiki. Oyo esali ‘te bituka nyoso basengeli kozua  lisungi ya baninga misusu mpo bazali na nyoso te.Nzoka bazali naino na bomoko te ! Bakosungana lolenge kani? 

BOMOKO NA SEMBO LIBOSO 

Yango esaleli oyo ekotambola kaka soki boyokani ezali kati na bango mpe sembo ezali. Mpo okoki kodefisa kaka oyo akozongisela yo na ndaka oyo epesamaki. Nzoka lokola kanyaka ekotela bato na ekolo mobimba ,  botosi ya  ndaka bakopesana ekosenga naino mbongwana ya  bato. Bato banso balinga kotosa mibeko oyo bakozua na etuka , kanyaka ezala te . Basengeli  mpe kondima moto na mosala kaka oyo akoki na yango. Ezala  mpo azali ndeko na yo ya libota to moninga na yo te . Kasi mpo ayebi mosala , to alongaki na momekano bopesaki na  bato nyoso . Wana  sembo ekozala pe ekotalisa ‘te moto oyo bozui  azali na makoki ya kosala mosala oyo bokopesa ye . Lifuti pe esengeli efutama malamu engebene na mosala  na bonsomi nyoso. Mibeko esengeli ezuama po na kotia lifuti ya bato na etando yoko po toyeba tokobanda wapi pe tokoki kosuka wapi. 

 MOTO NYOSO AZALI LETA 

Nkolo kompani nyoso asengeli kofuta mpako na ye  na  eleko  na yango.Bayimboka kati ya bituka basengeli kondima  koboya  oyo nyoso ekopekisa etuka na bango  ekende liboso. Esengeli penza bato bamona Leta lokola eloko moko ya bango, ete  ezali mosika te, kasi ebandi nde esika nyoso yo ozali. Tango yo moko ozali komikengela ,osala mabe te,  okomi bongo pe Leta!  Ntina lisusu moto moko azala sima kokengela yo te ! 

Lisusu pe ekosenga kozala motema monene pe koyeba kosimba  baye bazali na bolembu mpo na kosunga batombwana . Esaleli eye ekolongola molimo ya koswana pe zuwa ya mabe  tango nyoso oyo ekoma komonana kati ya bapolitiki na Kongo.  

MPO NA BOSUKISI

Na nyoso oyo tolobi tosengeli pe koyeba ‘te lokola bato bandimi boyangeli wana , ekotikala kaka bongo libela te . Kasi esengeli  bayeba kolanda mbongwana ya mokili pe ya bato . Baye ya sika bakoya kaka na makambo misusu oyo ezalaka te na bileko ya liboso.  Ezali kaka bongo  . Soki bandimi mbongwana na tango oyo esengeli,  wana nde bakoumela   kati na bango na lisanga . Ekolo na ekolo ezali na lolenge na yango. Kasi kobongisa mosala ezali kosenga kolongola oyo ya mabe mpo ya sika ezua esika. Koboya  mbongwana  ezali kokota na kotingama na maye malongaki te . Mpo makambo ya mabe ezalaka kaka mabe  ata ebimi maseke to suki ya pembe !. Soki bilei biziki na nzungu ezongaka lisusu malamu te ata osali boni . Bokobwaka yango kaka.  Ekolo na bituka na yango  ezali kaka lokola nzete . Ekoki kolonga te soki  etape na etape elingi kotengama na lolenge na yango .Kasi oyo akoningana tango bozali liboke ,  asengeli koyeba ‘te baninga pe bazali ! Boboto pe efandeli ya bomoko yango wana !  Bomoko  oyo esengeli ezala kati ya bituka nyoso mpo misala minso mitosa  mibeko oyo mipesamaki mpo na banso. Ndakisa  mibeko oyo etali mampinga tango bitumba bikoteli ekolo.Soki tolingi ekolo na biso tokozua tango na mayele ya kosala kaka oyo ekoki kosala ‘te elonga ezala solo .     

  • CAN 2025 : Quand la défaite sportive dérape dans l’arène politique

    La victoire du Sénégal (1-0) face au Maroc en finale de la Coupe d’Afrique des Nations 2025 aurait dû rester un fait strictement sportif, symbole de la réussite des Lions de la Teranga au terme d’un parcours maîtrisé. Pourtant, au-delà du terrain, la défaite des Lions de l’Atlas…

  • La Bible

    Un message essentiel : Patiente, Dieu agira au bon moment

    La patience est l’une des vertus les plus exigeantes de la foi. Dans 1 Samuel 13 : 11, Saül agit dans la précipitation parce qu’il a peur, parce qu’il ne voit pas encore l’intervention de Dieu. Combien de fois cela nous arrive-t-il aussi ? Quand le silence de…

  • Edito : Dire non aux discours de haine

    Au Sud-Kivu, les discours de haine constituent un facteur aggravant des tensions sociales et communautaires. Ils prennent souvent la forme de rumeurs, de propos stigmatisants ou de messages de désinformation diffusés dans l’espace public et sur les réseaux sociaux. Dans une province marquée par des conflits récurrents, ces…

  • Citoyens et autorités locales : Reconstruire la confiance pour prévenir les conflits au Sud-Kivu

    En RDC, la défiance entre citoyens et autorités locales s’est installée comme un mal silencieux mais profondément corrosif. Elle se nourrit des promesses non tenues, de la faiblesse des services publics, de la persistance de l’insécurité et d’un sentiment largement partagé d’abandon par l’État. « On nous promet des…

  • Sud-Kivu : Quand les citoyens deviennent médiateurs de conflits

    Dans une province du Sud-Kivu marquée par des décennies de tensions communautaires, de conflits fonciers et d’insécurité persistante, une dynamique silencieuse mais porteuse d’espoir se développe : des citoyens ordinaires endossent le rôle de médiateurs de conflits. « Je n’ai jamais imaginé pouvoir apaiser des voisins en colère, mais…

  • Bilan CAN 2025 : moments forts, tensions, souvenirs impérissables

    La Coupe d’Afrique des nations 2025 a refermé ses portes au Maroc après plusieurs semaines d’intensité rare. Une CAN dense, spectaculaire, parfois controversée, qui a tenu l’Afrique en haleine jusqu’à une finale au scénario presque irréel. Entre confirmations attendues, individualités flamboyantes, jeunes révélations, matchs de légende, mais aussi…

About The Author


En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC

Subscribe to get the latest posts sent to your email.

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *