

Ya solo masolo makosalema na Doha mazali na mabaku na yango. Kasi tokomona ‘te mazali penza elembo ya litomba monene mpo na ekolo Kongo.
Tolandaki disikulu ya Tshisekedi na ya Corneille Naanga ya mikolo miye , ezali solo naino kotalisa bozangi boyokani kati na bango.
Kasi ata bongo , bamibendi na mesa ya masolo ya Doha te. Oyo ezali kotalisa biso ‘te bayebi litomba ya masolo maye bazali kosala kuna na Doha.
Na yango bitumba bileki na Uvira, Fizi, Mwenga na Walikale mikolo miye , bikosenga na banso bakoma na mposa makasi ya kotika bitumba. Basengeli bongo kopesa naino na lombangu makoki ya masungi . Ezali penza mpo na baye bakimaki bitumba bina. Talaka batiki bandako na bango, bakomi kotelenganaka kati ya mpasi na bozangi makasi.
Tosengeli koyebaka ‘te bayimboka Kongo bazali kozela maloba ya pamba na bilaka te. Nzoka balingi nde bikela. Lobi ya masolo ya Doha ekozala na ntina kaka soko baye bakobunda babongoli maloba ma bango mpe basali nde bikela penza. Yango ekosenga na baye bazali kosolola kuna na Doha été bamitia penza kati ya mpiko pe molende makasi. Oyo basengeli kosala nde yango wana . Wana nde makutani ya Doha makozala lisusu na litomba pe makofungola nzela ya boyokani ya solo pe kimya ya libela na ekolo Kongo.
Blog
Cette section offre un aperçu du blog, présentant une variété d’articles, d’analyses et de ressources pour informer et inspirer les lecteurs.
Bukavu : La Regideso met en garde contre les faux agents
La Direction régionale de la REGIDESO au Sud-Kivu alerte […]
Météo actuelle : Averses à Bukavu, Kaniola et Mudaka
En ce vendredi 26 septembre 2025, le ciel du […]
About The Author
En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC
Subscribe to get the latest posts sent to your email.