

-Motuna ya mama mopanzi sango :

-Vote. Yo moto oproclamaki ye.Okoki koyebisa biso ezalaki ndenge nini? À part ça , okoki koyebisa biso masolo oyo ezoleka kuna na Doha? Ba oyo bayokaka lokota ya lingala pe bayoka soki makambo ezokende ndenge nini.
-LIKAMBO YA VOTE
-Corneille Naanga: -Mais mama otuni motuna lelo toza na 2026. Ngai nazalaka président na 2018. Mpo nini ozozongisela ngai kaka na motuna ,nasi maloba yango mingi. Et nalobi yango lisusu ezala ya suka pe nalobi yango que « atikala jamais kozua ata vote moko. » Moto alobi yango, moto atangelaki ye : « ozui te mais topesi yo. »
Et puis nasi nalobaki que ezalaki lisumu.Tosalaki mabe po na ko -sauver mboka na ngonga wana. Nasi nalobaka tozalaka na Kirumba . Nalobi « mais moto asala naino lisumu te abwakela ngai libanga ya liboso ! » .

Nasenga bolimbisi. Et puis, naloba pe que lokola biso nde tosali masumu wana , il faut biso moko to corriger yango. Nalobi lisusu…Et, ko corriger yango nzela mibale ezalaki te . Il fallait nakutana na bandeko na ngai mpo bango pe bazalaki na makambo misusu , tosali , tosangisi ba makasi na biso , yango tokomi lelo na libération na révolution. Na confirmer lisusu que « atikala jamais kozua na élection na vote (ata) moko » . Azali « l’échec. » ! Na Kinshasa balobaka « aza l’échec »! Tii na 2023, wana nde penza: Angwalima !
Akei kaka alobi « bon » tala… Tosali vote lelo, alobi « Yo président ya CENI .Yo kotia résultats te! » po Président ayebisaki ye : « yo awa ozui 23%!. » Moto oyo a-gagner ezali Katumbi nde agagner! Mais ye agagner na 67% ».
Sik’oyo alobi « tosala nini ? Sala boye : « zua ba machines , bato ba continuer ko voter pendant 7 jours lisusu! Nde babakisi ba voter, ba voter,ba voter… pe babimisi ye balobi azui 73%! Ata yo moko mwana classe! Azua 73% lobi na yango bitumba ebandi? Te! Atikala kozua te ! Ata (vote) moko te ! Et puis mboka ekobonga te soki toza kaka na tricheur, voleur ndenge wana tee na moto ya ekolo.
Yango tozoloba .

-MASOLO YA DOHA
–Ya mibale ya Doha. – Biso toza na Doha. Biso, ye moko Tshisekedi alobaki , ye moko , jamais alors mokolo moko te, akofanda na biso po na tosolola . Nzoka nde biso banda kala tolobaka que makambo ezali, tosolola.Po soko tosololi yango , tokozua solution na masolo na mesa. Tii tobanda kuna , avant même Sabinyo, Chanzu , tii na Bunagana , (tolobi na ye )tosolola ee !!!, (azongisi) :-« bino te ! ». Rutsuru… (tolobi na ye ) Tosolola !! ( Tshisekedi azongisi:) -tala nakosolola na bino te !
-Toyei toyei malembe toyei kokoma na Goma , ooo woo! Tango tokomi na Goma , amoni que makambo oyo ezoya mabe. Ewumeli te ,sima ya mposo mibale , tozui pe Bukavu…Aza na chance ! Mpo ndenge tozalaki kokende wana tolobaki tokotelema kaka na Lubumbashi !
Alors alongwe ye moko, akei naino na Doha . Mpo ye akanisaka que non biso toza bato te. Akei kobondela mokonzi ya Doha kuna. Ayebisi ye « papa
nakopesa yo nyoso oyo ozoluka , bengela ngai président Kagame. Nalobaki que nakokutana na ye kaka na Lola . Mais namoni que soki nazeli Lola eza mabe. » Président Kagame alongwe ;, akei bakutani kuna. Abeteli ye mabolongo alobi « tala ! pardon tosolola , nandimi sik’oyo tosolola. » Ye pe ndenge basololi kuna ayebisi ye « ngai naza na problème na bino te ! Est ce que Bisimwa wana omonaka aza rwandais? Général Makenga aza Rwandais? oo Naanga aza rwandais ? Ndima bosolola na bango. »
(Tshisekedi azongisi) – Nandimi tokosolola na bango mais botelema naino wana. »
Nde oyoki mokili mobimba eyei kotelema , kotia biso pression : « Pardon bopusana naino te ! bosuka naino wana . »

Nde yango biso pe totelema . Tozolinga kaka tosolola . Na kati ya lisolo wana alongwe . Akei na Amerique komonana na président Donald Trump. Alobi « ngai awa bakobengana ngai na bato oyo. Nakopesa yo Congo mobimba. Olingi nini ? cobalt , lithium , ,cuivre? ekomi ya yo! Mais tindela nai basoda bapekisela ngai bato oyo baz’oya »
Nde yango oyoki diplomatie, Doha, Tokei! Tobandi masolo.Tosolola , biso tolobi « biso toboyi na biso te ! tolingi na biso tosolola na bino mais yo olobaki que biso toza ba condamnés à mort, sik’oyo yo okosolola na ba condamnés mort? Yo okanga bato na biso , okanga ba banques na Est nyoso, Avant tosolola ba préalables na biso yango oyo! …
Nde esika toza naino wana . Moto akosa yo te , na Doha tobanda naino masolo ya sôlo te ! Oyo tozobenga yango ba causes profondes! naino te ! Mais, tokomi wana akanisi azali nani , azomona biso bazoba, bayuma ! Mpo lokola aza moto oyo ameseni ko-frapper bato. Azozua temps po entretemps azosomba mandoki .Azo s’organiser . Mikol’oyo lokola asombi mandoki , azui bato , bon alobi « bon bato oyo batelemaki ,nazo-attaquer », yango a attaquer mikolo oyo nayei koyebisa bino « ba attaquer biso place nyoso ! Tozoyebisa ye « eee papa tika eloko oyo ! Mais tolobi na bato que non lokola ye aboyi , omoni samedi akei na congrès na ye , alobi ye makambo ya Doha eza distraction ! Donc awangani ndenge amesani.
Ye asignaka papier, lobi na yango alobi « te! na retirer signature ! » . Yango a attaquer biso . Yango toyei koyebisa bino boye: Mbala oyo soki azotumola biso tolali na biso mpongi tozozela tosolola, soki atumoli biso, ndenge atumoli biso wana, mama, tango toko -démarrer, moto aya kopekisa biso te ! Tozui bino à témoins ! Que tango toko démarrer tour oyo moto apekisa biso te ! Po tokoyoka lisusu moto te . Mais totikali kaka , biso toza bato ya masolo. Po toyebi que toza ba congolais ! Azali congolais. mwana -mboka Tshisekedi aza congolais, ngai pe naza congolais ata ko ye awanganaka que bato misusu baza ba congolais te , mais biso toyebi que toza biso nyoso ba congolais.Tosolola !
Tobongisa mboka, po ba problèmes ya Congo ezali mingi. Ndenge ozomema mboka , ozomema biso na libulu! Kokanga bato côté oyo, kobengana misusu na exil, kofinga bato, komona bato bazoba. Azobenga biso banyangalakata , soki banani , sik’oyo oh biso tozali ba pantins! oh soki biso tozali ba …soki banani , problème te ! Donc makambo ya Doha ezali ete biso tozali kaka kuna toza kondimela bango . Tozosenga na bango, bango moko bazomona bino, nazoyebisa bino que ba attaquer biso place nyoso. Et puis bango moko bazoya balobi « tozui mboka boye …tozui mboka boye ! » Bozozua .?

.Baninga batumolaka simba alali te ! Simba alali na ye pongi , yo oyei oza kotumola- tumola ye !!! . Toza bato ya kimya , tolingi dialogue! Pe tolobi lokola ye awangani dialogue po na congrès na ye alobi que « po na ye dialogue eza nini »? -Problème te! Soki aboyi dialogue, biso tokosala, ba congolais bakosala dialogue sans ye ! Et puis , nazoyebisa yo que na kati ya bato na ye même, basusu babimi balobi « bozosala nini ? Boya kolongola biso moto oyo ! , toza biso nyoso awa na kati ya prison ! Tozali scandalisés na makambo azali koloba.
Oyo wana nde ezali makambo oyo etali ba négociations.
BOBENGI YA THABO MBEKI NA AFRIKA YA NGELE (RSA)
Babengi biso na Afrique du sud , biso tolobi esika nyoso bakofandela milulu po na kimya ya Congo , tokokende. Mbeki abengi biso totindi bato ebele . Mpo tolingi toyebisa bango makambo na biso, tozali na raison. Po na nini obengi ngai , nazalaki président ya Ceni , basusu bakobenga ngai rebelle , naza rebelle te, naza révolutionnaire!! Mais yo okanisi moto lokola ngai nakomi esika oyo kaka pamba boye ? Naza moto ya liboma ? Te, naza liboma te ! Donc , problème ezali ! Nde oyo tokobenga ba causes profondes !
Bato bazali awa ebele na Congo bazoyebisa bango « bino boza bacongolais te ! » Bomoni makambo oyo basali mwana mboka Pero na Belgique? Kasi bino boza ba journalistes ! Bomoni eloko basali ye ? Est ce que to continuer kondima eloko ya ndenge wana ? Donc moto nyoso soko alobi makambo oyo ezali contraire na oyo ya ye il faut babeta ye , bakanga ye , soki bakoki kokanga ye te , donc azali rwandais! oh azali jaloux! Na-profiter na yango po na kopesa compassion na mwana mboka Pero azali militant , azali combattant! Combattant ya justice ! Po mboka ekoki ko continuer ndenge wana te! Mais yeba que oyo ekomeli ye ekoki kokomela pe moko na bino!!

Baza ebele ba oyo ba kovivre na ba camp , bacongolais, balobi bango bazali na droit ya cité te , est-ce que ekotikala ndenge wana ? Te ! Tokondima yango soki moke te ! Donc soki bomoni que moto lokola ngai ,mama , nazangaki nini? Bandako naza na’ngo ebele! mosolo naza na’ngo ebele!
Bomona bazua bandako bapauvres oyo bazalaki bazua naino ndako te bakoma kofanda na’ngo bazokende kofa…rater na piscine na ngai , ba hôtels ekoma ba prisons ! Mais totiki yango parce que vaut mieux na-vivre pauvre na dignité que nazala riche esclave ! Wana tokondima yango te ! merci mingi mama!
Moninga na ngai alobi abakisa mwa eloko.
-Bertrand BISIMWA :

Nga pe nakomeka lingala mwa moke! Au fait, Tshisekedi azalaka lokola mwana moke! Lokola coordonateur awuti koloba . Sik’oyo nde azo -réaliser la gravité ya makambo oyo alobaki na congrès na bango, nde a-réaliser ya ba actions militaires oyo azo mener sik’oyo sur toutes les lignes de front . Alors, bokamwa te koyoka ye lelo na mpokwa ou bien lobi asali mise au point ya makambo oyo alobaki puisque lui, il ne réalise jamais la gravité de ce qu’il dit ( trad.: -mpo ye ayebaka monene ya makambo oyo akoloba te ) . Ne soyez pas étonnés et dès que vous l’entendrez (bokamwa te tango bokoyoka ye …)boyeba ‘te boza en face ya mwana moke . aksanti! —(Hymne national)
Blog
Cette section offre un aperçu du blog, présentant une variété d’articles, d’analyses et de ressources pour informer et inspirer les lecteurs.
Bukavu : La Regideso met en garde contre les faux agents
La Direction régionale de la REGIDESO au Sud-Kivu alerte […]
Météo actuelle : Averses à Bukavu, Kaniola et Mudaka
En ce vendredi 26 septembre 2025, le ciel du […]
About The Author
En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC
Subscribe to get the latest posts sent to your email.