
Na mboka na biso tozali na bilei ndenge na ndenge. Na bibale, na mangala pe miluka tokolobo mbisi ya lolenge nyoso . Tokotanga ata mboto, monganza, mbenga, mongusu, malangwa, makoku ,nzombo, ngolo pe bongo na bongo. Na zamba tokosalaka bokila pe tokozuaka nyama nzike. Ezala ata mboloko, simbiliki , mpakasa to pe basusu.Na mboka tokobokolo bibwele lokola ngombe ,nsoso, mabata mpe nyama esusu lokola ntaba , meme.
Tozali pe na nyama ikeke lokola mbinzo, makelele, mpose pe bongo na bongo.Na oyo etali ndunda tokolonaka ndunda ndakisa lokola matembele, ngayingayi,pondu,madesu, mbika, mayebo, mbuengi , pe misusu ebele .Tokoliaka bilei bya biso na nsongo, na kwanga, na fufu ya nsongo pe fufu ya masangu, loso, mabenge, mbala , mboma, makemba. Na bikelakela ya lompimbo , tozali na matungulu, ndembi, tomato, pilipili, tangawusi, nsóló, pe bongo na bongo
Soki totali ngambo ya mafuta , tozali bongo na mafuta ya mbila, mafuta ya nguba, pe na mwamba nguba , mosaka. Oyo totangi nde bilei ya bato ya ekolo Kongo.
Lolenge ya kolamba pondu:


Mpo na kolamba pondu tokosala boye.Nakosukola pondu eye nasombaki mpo na kolongola bosoto nyoso.
Na sima nakotokisa yango tii soki elembi naluboli yango pe nakttia na eboka mpo na kotuta elemba penza. Wana nakotiaka pe bikela ya lompimbo lokola matungulu, pilipili , nsolo, pe misusu.
Soki nasilisi kotuta pondu, nakotia yango kati ya nzungu po na kolamba . wana nakotika boye etoka penza tii solo ya mobesu elongwa.
Sima nakobakisa mbisi lokola mongusu to pe misusu ya kokauka na mpe mungwa o kati ya nzungu po ebela esika moko na pondu.
Soki namoni ‘te ekomi kobimisa nsolo ya kobela wana nakosopa mafuta ya mbila likolo ya pondu po epesa yango supu ya kitoko
Nakofandisa na moto tiii sima ya mwa ntango nde nakomono ‘te ebeli , wana nakolubola yango po na kolia na loso oyo elambemaki pembeni to mpe kwanga to fufu ..
Blog
Cette section offre un aperçu du blog, présentant une variété d’articles, d’analyses et de ressources pour informer et inspirer les lecteurs.
Bukavu : La Regideso met en garde contre les faux agents
La Direction régionale de la REGIDESO au Sud-Kivu alerte […]
Météo actuelle : Averses à Bukavu, Kaniola et Mudaka
En ce vendredi 26 septembre 2025, le ciel du […]
About The Author
En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC
Subscribe to get the latest posts sent to your email.