

Tozui sango lobi loleki ete Poutine andımı mbela ya bokutani ya Trump oyo akomaki yango na nzela ya internet na lokasa na ye ya Truth Social. Bokutani ekozala o mokolo mwa zomi na mitano ya sanza eye ya mwambe tozali. Ekozala kaka na ntina ya masolo ya bosukisi bitumba kati na Russia na Ukraine. Bokutani ena ekozala na Alaska .
Esika ena ezali na ngambo ya likolo na limbe (n-o) .Na kondimaka bokutani ena Poutine abakisi pe ‘te akosenga na Trump sima ya masolo mana , ayeba pe kosala mobemboo o mboka na ye . Ezalaki liboso ‘te bakutana na mboka ya ba Emirati lolenge Poutine alobaki na bapanzi sango o mokolo mwa minei moleki . Kasi elobami sik’oyo ‘te bakokutana na Alaska.
Kasi na masolo mana mokambi ya Ukraine , Zelensky akozala te. Mpo na Poutine makambo mabongisami naino te mpo bayeba kolobana elongo na ye mpe akomono ‘te bazali naino mosika penza ya ndaka ena. . Kasi alobi ‘te aboyi yango te kaka mabongisami makoka naino. Masolo maye lolenge makopesama makozala penza likambo monene .
Mpo uta bakutanaka na Japon na sanza ya motoba na mobu 2019. Poutine anyata lisusu tabele ya Amerika te uta mobu 2015 na eleko ya bokonzi ya Obama. Etumba oyo esili kokokisa mibu misato uta ebandaki na sanza ya mibale na mobu 2022. Ya solo ebomisi bato ebele na bikolo nyoso mibale . Lelo oyo Russia na mampinga na ye bsili kozua bisika ebele kati ya Ukraine. yuango bato basusu bakoloba ‘te Russie azalaki liboso koboya masolo , mpe sik’oyo lokola mampinhga ma ye makolonga akomi kondima masolo kasi akotia kaka nzube na nzela ya bosenga makasi .
Mpo na Russie esengeli atikala na mabele oyo asili kobotola kati ya Ukraine uta bitumba bibandaki, akoki kotika mango te. Nzoka mpo na Ukraine, esengeli nde Russie abima penza na mabele na bango . Botala esika bazali koyokana ata moke te.

Blog
Cette section offre un aperçu du blog, présentant une variété d’articles, d’analyses et de ressources pour informer et inspirer les lecteurs.
Bukavu : La Regideso met en garde contre les faux agents
La Direction régionale de la REGIDESO au Sud-Kivu alerte […]
Météo actuelle : Averses à Bukavu, Kaniola et Mudaka
En ce vendredi 26 septembre 2025, le ciel du […]
About The Author
En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC
Subscribe to get the latest posts sent to your email.