

Mpo na litangeli oyo tozui ndakisa ya engumba Kinshasa. Kasi toyebi ‘te ezali se bongo too koleka penza o kati ya bituka.Tokotalisa bino lolenge bana kelasi bamikutaka na mikakatano ebele tango basengeli nde komipesa na boyekoli mpo na momekano ya suka .Totelemeli bongo penza likambo ya bozangi lotiliki ya malamu, bozangi esika ya boyekoli kati ya kimya, mpe bozangi bilei ya malamu na esika ya kolala po na bituka bizali na bitumba.
Awa tokómáki na eleko ya esiyo. Ezali eleko oyo bana kelasi baye bakomi bilenge bamilengelaka mpo na koleka momekano ya suka to na lifalanse examen d’Etat . Momekano ena ezali penza likambo monene mpe na ntina mibale ya litomba .
Ya liboso baye bakolongaka, bakozua lipolomo ya yambo ya bomoyi na bango . Mpe tobosana te momekano ena esalemi mpo na bayekoli banso ya kelasi ya suka na ekolo Kongo mobimba. Tala lokumu soki olongi mpe bo momeseno bakosepelisa yo na milulu. Baboti bakosomba masanga , bakolamba mpe banso bakolia bakomela na baninga na bandeko !

Mokanda ena soki ekolakisa ‘te uta wana mwana alongwe penza na bomwana mpe akoti na bomoyi ya mikolo. Yango ezali mpe kopesa elenge nzela ya kosala mosala.
Kasi ezali mpe lisusu kopesa nzela ya kokota na bakelasi ya minene mpo na koluka kokolisa mayele ya mosala oyo bakosala ndele. Likambo oyo ekotinda biso tolobela mikakatano ya bilenge mpo na koyekola malamu o engumba ya Kinshasa .
Na yango , soki totali mpe malamu efandeli kati ya engumba Kinshasa , ezali mboka ya bato ebele penza. Elingi koloba mpe ete makelele pe mazali mingi. Makelele mana makoutaka na ndenge bisika ya masano to ya komela masanga mazali kutu ya kotanga te mpe kaka pene ya bandako esika bato bakofandaka .

O bisika bina bakobetaka miziki makasi , mingi se na libanda , uta ntongo tii butu mobimba ! Esaleli oyo ezali bongo mpo na bakomine ata minso ya Kinshasa , kolongola soki ata moko lokola Gombe . Yango ezali mpasi mingi mpo ya kozua ntango pe esika ya koyekola malamu.
Lokola pe bisika bibengamaka kala « internat » to esika ya kofandisa bayekoli na biteyelo bo ndako na bango bizālākā penza na Kinshasa te soki te kaka na bituka biye biyebanaka kala (lokola na Kongo central,Bandundu, Equateur) ,kasi mingi bikangama ndenge toyebi, na ntina ya bozangi makoki ya koleisa bayekoli to mpe mpo na bantina misusu ata bitumba ya batomboki.

Kasi ntina ya kotika ndako ya baboti pe komibenda epai esusu ekoutaka mpe na bantina misusu oyo ebakisi mikakatano ya boyekoli malamu . .
O ndako ya baboti na bango , bayekoli mingi bazali bana ya mabota ya bana ebele . Baboti bazali na bozui moke . Yango moyekoli akoki kozala na ndako ya kolala ya ye moko te mpo amipesa na boyekoli kati ya kimya. Basusu mpe na ndako na bango ,bazālākā ata na lotiliki te to ya lotiliki ya kokatana tango nyoso . Bozangi lotiliki ya malamu ekoma bongo kopekisa etamboli elamu to bokeli ya misala mingi o engumba Kinshasa mobimba .Wana pe ebakisi bozangi misala kati ya mbokamokonzi ena.
Bayekoli basusu kutu mpe bazali na mpasi ya kozua mwa eloko ya kolia. Baliaka kaka na butu, mbala moko na mokolo. Sima ya kolia ya lolenge ena , nzoto ezali na kolemba na mpongi, moyekoli akoyekola malamu ndenge nini ?
Nzoka na eleko ena ya kolengele momekano esengeli penza moyekoli alia malamu , alala mpongi ya malamu mpo azua mayele na bokasi ya koyekola malamu .
Na ntina nyoso oyo , na engumba Kinshasa, bayekoli mingi bakosalaka nyoso mpo bamibenda na esika ya kimya. Boko bilenge bakozuaka esika epesami na bakambi eteyelo na bango.Yango ezali se mpo na mwa montango moke penza ya bayekoli. Kasi ebele te. Basusu bakosangisaka mwa misolo mpo ya bofuteli ndako moko elongo . Bayekoli ata misato to minei to bongo na bongo bakosengaka na baboti ba bango misolo ya kosangisa na basusu mpo na kozua ndako ya kofutela tii mimekano mikoya kosila.
Talaka bantina ebele oyo bikotindaka bilenge basi na mibali ete baluka kokota maquis to esika ya koyekola na nkunku oyo tokolobela pe .
Nyoso oyo ekolakisa bokeseni oyo ezali mingi mpo ya koyekola o bingumba na biso. Yango ata balobi ete mobeko mwa yambo mokotinda lifuti lizala te mpo na bayekoli ya kelasi ya nse to ya libandela, kasi soko babongisi oyo tolobeli awa te ekozala se makelele ya pamba.
Blog
Cette section offre un aperçu du blog, présentant une variété d’articles, d’analyses et de ressources pour informer et inspirer les lecteurs.
Bukavu : La Regideso met en garde contre les faux agents
La Direction régionale de la REGIDESO au Sud-Kivu alerte […]
Météo actuelle : Averses à Bukavu, Kaniola et Mudaka
En ce vendredi 26 septembre 2025, le ciel du […]
About The Author
En savoir plus sur L'ESSENTIEL RDC
Subscribe to get the latest posts sent to your email.